Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 17:25 - Mokanda na Bomoi

25 Mpe azalaka na posa te ya masungi ya bato, pamba te akoka na nyonso. Nzokande, Ye nde apesaka bato nyonso bomoi, pema mpe biloko nyonso.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 17:25
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe Nzambe asalaki moto wuta na putulu ya mabele, afulaki pema ya bomoi na madusu ya zolo na ye ; mpe moto akomaki ekelamu ya bomoi.


Bomoi ya bikelamu nyonso mpe pema ya bato nyonso ezali kati na loboko na Ye.


« Boni, litomba nini Nzambe akoki kozwa epai ya moto ? Ezala ata moto ya bwanya, azalaka na litomba kaka mpo na ye moko.


wana ngai nazali nanu na bomoi, mpe pema ya Nzambe ezali nanu na zolo na ngai,


Molimo ya Nzambe asalaki ngai, pema ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso epesi ngai bomoi.


Soki Nzambe azalaki kaka kokanisa mpo na Ye moko, mpe soki abatelaki kati na Ye moko molimo na Ye mpe pema na Ye,


Nalobaka na Yawe : « Ozali Nkolo na ngai, Yo moko kaka nde ozali bolamu na ngai. »


Tala liloba oyo Nzambe, Yawe, alobi, Ye oyo akelaki likolo mpe atandaki yango lokola liputa, oyo atandaki mabele mpe biloko nyonso oyo mabele ebimisaka, oyo apesaka pema na bato na yango mpe bomoi na bato oyo batambolaka likolo na yango :


Nakosambisa mpo na libela te mpe nakozala na kanda tango nyonso te, noki te molimo ya moto nyonso oyo nasala ekokufa na miso na Ngai.


Kasi mokonzi Sedesiasi alapaki ndayi na nkuku epai ya Jeremi : — Na Kombo na Yawe oyo apesaka biso pema, nakoboma yo te, mpe nakokaba yo te na maboko ya bato oyo balingi koboma yo !


Liloba na Yawe. Tala liloba oyo Yawe alobaki na tina na Isalaele. Yawe oyo atanda likolo mpe asala miboko ya mabele, Ye oyo atia Molimo na Ye kati na moto, alobi :


Kasi Moyize mpe Aron bakweyaki bilongi kino na mabele mpe bagangaki : — Eh Nzambe ya milimo nyonso ya bato ! Okosilikela lisanga mobimba likolo ya lisumu ya moto moko kaka ?


— Tika ete Yawe, Nzambe oyo apesaka pema na bato nyonso, apona moto moko mpo ete akamba lingomba oyo ;


Na ndenge wana nde bokozala bana ya Tata na bino, oyo azali kati na Likolo, pamba te abimisaka moyi mpo na bato malamu mpe mpo na bato mabe, mpe anokisaka mvula mpo na bato ya sembo mpe mpo na bato oyo bazali sembo te.


Bokende koyekola tina ya maloba oyo : « Nasepelaka na motema ya boboto koleka mbeka, » pamba te nayaki te koluka bato ya sembo, kasi bato ya masumu.


Nzokande, atikalaki kolemba te kotalisa bolamu na Ye, na nzela ya konokisela bango mvula kowuta na likolo, kopesa bango bambuma ebele na tango na yango, mpe kopesa bango bilei ebele mpe kotondisa mitema na bango na esengo.


Pamba te, ezali na nzela na Ye nde tozalaka na bomoi, toninganaka mpe tozalaka oyo tozali, ndenge bakomi na bino mosusu baloba : « Tozali bana na ye ! »


Nani apesaki Nkolo eloko mpo ete Nkolo azongisela ye ? »


Mpe pona kolinga Yawe, Nzambe na yo, koyoka mongongo na Ye mpe kokangama na Ye, pamba te azali bomoi na yo mpe akopesa yo mibu ebele kati na mokili oyo Yawe alakaki kopesa, na nzela ya ndayi, epai ya bakoko na yo —Abrayami, Izaki mpe Jakobi.


Pesa mitindo epai ya bazwi kati na mokili oyo ete bazala na lolendo te mpe batia elikya te na bomengo, pamba te bomengo ekoki kosila ; kasi tika ete batia elikya na bango kati na Nzambe oyo apesaka biso biloko nyonso, na bofuluki, mpo ete tosepela na yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ