Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 17:18 - Mokanda na Bomoi

18 Ndambo ya bato ya mayele oyo balandaka malakisi ya Epikire mpe ya Zenon bakomaki kotiana tembe na ye. Bamoko batunaki : — Moto oyo ya makelele alingi koloba nini ? Bamosusu balobaki : — Tomoni lokola nde azali kolobela banzambe ya bapaya ! Balobaki bongo mpo ete Polo azalaki koteya Sango Malamu na tina na Yesu mpe lisekwa kati na bakufi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 17:18
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kolobaka na zoba te, pamba te akotiola bwanya ya maloba na yo.


Eleki malamu kotia elikya na zoba, na esika ete otia elikya na moto oyo amimonaka moto ya bwanya na miso na ye moko.


Tango bakomaki pene ya esika oyo bayekoli mosusu bazalaki, bamonaki ebele ya bato penza bazingeli bango, mpe balakisi ya Mobeko kotiana tembe elongo na bayekoli.


Tango Yesu abimaki na ndako, Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko basilikelaki Ye makasi mpe bakomaki kotungisa Ye na nzela ya mituna ya ndenge na ndenge,


Klisto akomona pasi mpe akozala moto ya liboso ya kosekwa kati na bakufi mpo na kosakola pole ya lobiko epai ya Bayuda mpe epai ya bato ya bikolo ya bapaya.


na kanda makasi ndenge bamonaki bantoma koteya bato mpe kotatola ete bakufi bakosekwa ndenge Yesu asekwaki.


Mokolo na mokolo bazalaki kotika te koteya, mpe kosakola Sango Malamu na Tempelo to na ndako moko na moko ete Yesu azali Klisto.


Bongo bato mosusu ya ndako ya mayangani oyo ebengamaka Ndako ya mayangani ya bansomi : Bayuda ya Sirene, ya Alekizandri, ya bituka ya Silisi mpe ya Azia ; bakomaki kotia tembe na miso ya Etieni.


Atako bazalaki komimona bato ya bwanya, kasi bakomaki bazoba.


Bomikosa te : soki moto moko kati na bino akanisi ete azali na bwanya kati na mokili oyo, tika ete akoma lokola zoba mpo ete akoma penza moto ya bwanya.


Biso, likolo ya Klisto, tozali bazoba ; kasi bino, kati na Klisto, bozali bato ya mayele ! Biso, tozali bato na bolembu ; kasi bino, bozali bato makasi ! Bino, bozali kozwa lokumu ; kasi biso, tozali kotiolama !


Bosalaka keba ete moko te akanga bino na motambo ya mayele ya lokuta mpe ezanga tina, kolanda bokoko ya bato mpe etamboli ya mokili oyo, pamba te ewutaka na Klisto te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ