Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 17:16 - Mokanda na Bomoi

16 Wana Polo azali kozela bango kati na Ateni, motema na ye etungisamaki mingi na komona ete engumba yango etonda na banzambe ya bikeko.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 17:16
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Azongisaki : — Nazali na bolingo eleka ndelo mpo na Yawe Nzambe, Mokonzi ya mampinga, pamba te bana ya Isalaele babwaki boyokani na Yo, babuki bitumbelo na Yo mpe babomi basakoli na Yo na mopanga. Natikali kaka ngai moko na bomoi. Sik’oyo bazali lisusu koluka koboma ngai.


Azongisaki : — Nazali na bolingo eleka ndelo mpo na Yawe Nzambe, Mokonzi ya mampinga, pamba te bana ya Isalaele, babwaki boyokani na Yo, babuki bitumbelo na Yo mpe babomi basakoli na Yo na mopanga. Natikali kaka ngai moko na bomoi. Sik’oyo bazali lisusu koluka koboma ngai.


Miso na ngai ezali kosopa mpinzoli, pamba te mibeko na Yo ezali kotosama te.


Natalaka na nkele bato oyo bazangi kondima, ba-oyo batosaka liloba na Yo te.


Bandeko na ngai bakomi kozwa ngai lokola moto oyo bayebi te, nakomi lokola mopaya na miso ya bana ya mama na ngai.


Kasi soki nalobi : « Nakotanga lisusu Kombo na Ye te, » Liloba na Ye kati na motema na ngai ekomaka lokola moto oyo ezali kopela kino na mikuwa na ngai ; nalongaka te kokanga yango, nakokaka te !


Kasi ngai, na nzela ya Molimo na Yawe, natondisami na nguya, na bosembo mpe na mpiko mpo na kobimisa polele mabe ya Jakobi mpe lisumu ya Isalaele.


Yesu atalaki bango na mawa mpe ayokaki pasi mingi na motema mpo ete mitema na bango ezalaki makasi lokola libanga. Yesu alobaki na moto yango : — Sembola loboko na yo ! Moto yango asembolaki loboko na ye, mpe loboko yango ebikaki.


Lokola mokolo oyo Bayuda basepelaka feti ya Pasika ekomaki pene, Yesu akendeki na Yelusalemi.


Bato oyo bakendeki kotika Polo bamemaki ye kino na Ateni ; mpe na mitindo ya Polo, bazongaki na Bere koyebisa Silasi mpe Timote ete balanda ye noki na Ateni.


(Bato nyonso ya Ateni mpe bapaya oyo bazalaki kovanda kuna bazalaki kolekisa tango mingi mpo na koloba mpe koyoka basango ya sika).


Pamba te tango nazalaki kotambola kati na engumba na bino mpe kotala bikeko oyo bosambelaka, namonaki kutu etumbelo moko bakoma na likolo na yango : Mpo na Nzambe oyo ayebani te. Nzokande, ngai nayei koteya bino Nzambe oyo bosambelaka ata boyebi Ye te.


Sima na yango, Polo atikaki Ateni mpe akendeki na Kolinto.


Boye sik’oyo, na etinda ya Molimo, nakeyi na Yelusalemi, kasi nayebi te likambo nini ekokomela ngai kuna.


Boye lokola tokokaki lisusu kokanga motema te, tomonaki ete ezali malamu mpo na biso kotikala na Ateni.


kasi akangolaki Loti, moto ya sembo, oyo atondaki na mawa kati na motema na ye likolo na mobulu ya bato wana ya mabe,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ