Tango bakonyokola bino kati na engumba songolo, bokima na engumba mosusu. Nazali koloba na bino penza ya solo : bokosilisa te kotambola na bingumba nyonso ya Isalaele liboso ete Mwana na Moto aya.
Bantoma, bakambi elongo na Lingomba mobimba bazwaki mokano ya kopona ndambo ya bato kati na bango mpe ya kotinda bango na Antioshe elongo na Polo mpe Barnabasi. Baponaki Yuda oyo babengaka Barsabasi, mpe Silasi ; bango mibale bazalaki bakambi kati na bandeko.
Polo akomaki na Derbe mpe na Listre, epai wapi akutanaki na moyekoli moko, kombo na ye ezali « Timote. » Mama na ye azalaki Moyuda, kasi akomaki kondima Klisto ; mpe tata na ye azalaki moto ya Grese.
Bato oyo bakendeki kotika Polo bamemaki ye kino na Ateni ; mpe na mitindo ya Polo, bazongaki na Bere koyebisa Silasi mpe Timote ete balanda ye noki na Ateni.
Ndambo ya Bayuda bandimisamaki mpe basanganaki na Polo mpe Silasi ; ndenge moko mpe na bato mingi ya Grese, oyo bazalaki kogumbamela Nzambe, mpe basi ebele ya lokumu.
Tango Silasi mpe Timote bayaki wana wuta na Masedwane, Polo akomaki kolekisa tango na ye nyonso kaka na koteya Liloba mpe kotalisa solo epai ya Bayuda ete Yesu azali Klisto.
epai wapi awumelaki basanza misato. Kaka na tango Polo alingaki kozwa masuwa mpo na kokende na Siri, Bayuda basalelaki ye likita. Boye, azwaki mokano ya kozongela na nzela ya Masedwane.
Natikaki yo kati na Kreti mpo ete osilisa kobongisa makambo oyo etikalaki mpe opona bakambi ya Lingomba kati na engumba moko na moko, ndenge natindaki yo.
Alobaki na bango : — Bokende na nzela ya bangomba ya mikuse mpo ete bato oyo bazali kolanda bino bamona bino te. Bobombama kuna mikolo misato kino tango bakozonga, bongo nde bokoki kokoba nzela na bino.