Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 17:12 - Mokanda na Bomoi

12 Bayuda ebele kati na bango bandimaki ; ndenge moko mpe, kati na bato ya Grese, basi mingi ya lokumu mpe mibali ebele bandimaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 17:12
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Jozefi, moto ya mboka Arimate, oyo azalaki moto ya lokumu kati na Likita-Monene ya Bayuda mpe azalaki kozela Bokonzi ya Nzambe, abangaki te kokende epai ya Pilato mpo na kosenga nzoto ya Yesu.


Moto nyonso oyo azwi mokano ya kosala makambo oyo Nzambe alingaka, akososola soki mateya na Ngai ewuti na Nzambe to nazali koloba na ndenge na Ngai moko.


Bongo, Polo mpe Barnabasi balobaki na bango na mpiko : — Tosengeli liboso koteya bino Liloba na Nzambe. Kasi lokola boboyi yango mpe bozali bino moko komimona ete bokoki te mpo na kozwa bomoi ya seko, tokeyi na biso sik’oyo epai ya bato oyo bazali Bayuda te.


Kasi Bayuda batiaki songisongi epai ya basi ya lokumu oyo bazalaki kogumbamela Nzambe, mpe epai ya bato minene ya engumba wana ; bapelisaki moto mpo ete Polo mpe Barnabasi banyokolama, mpe babenganaki bango wuta na mokili na bango.


Na engumba Ikoniomi, Polo mpe Barnabasi bakendeki, lokola momesano, na ndako ya mayangani ya Bayuda ; bateyaki kuna, mpe bato ebele, Bayuda mpe bato ya bikolo ya bapaya, bakomaki bandimi.


Bazalaki kokumisa Nzambe, mpe bato nyonso bazalaki kolinga bango. Bongo, mikolo nyonso, Nkolo azalaki kobakisa na lisanga na bango bato oyo bazalaki kobika.


Bandeko, bokanisa nanu oyo bozalaki tango Nzambe abengaki bino : kati na bino, moke bazalaki bato ya bwanya kolanda emoneli ya bomoto, moke bazalaki bato minene, mpe moke bawutaki na mabota ya lokumu !


pamba te nyonso oyo ebimi na pwasa ekomaka pole. Yango wana baloba : « Moto na pongi, lamuka, bima kati na bakufi, mpe Klisto akongengisa yo. »


mpe oyo azali mozwi asepela mpo ete Nzambe akokitisa ye ; pamba te mozwi akoleka lokola fololo ya elanga.


Yango wana, bobwaka makambo nyonso ya bosoto mpe misala nyonso ya mabe, bondima na komikitisa Liloba oyo elonamaki kati na mitema na bino, pamba te ezali na nguya ya kobikisa bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ