8 Boye bakatisaki etuka ya Mizi mpe bakendeki kino na libongo ya Troasi.
Longwa na Troasi, tozwaki masuwa mpe tokendeki mbala moko kino na esanga ya Samotrase ; bongo mokolo oyo elandaki, tokomaki na Neyapolisi.
Tango bakomaki na mondelo ya Mizi, bazwaki likanisi ya kokende na Bitini, kasi Molimo ya Yesu apesaki bango nzela te.
Bango nde bakendeki liboso mpo na kozela biso na Troasi.
Kasi biso tozwaki masuwa kati na engumba Filipi, sima na feti ya Mapa ezanga levire. Sima na biso kotambola mikolo mitano na mayi, tokutaki bango na Troasi epai wapi tosalaki mikolo sambo.
Tango nakomaki na Troasi mpo na kosakola Sango Malamu ya Klisto, Nkolo afungolelaki ngai bikuke mpo ete nakoka kosala mosala na ngai.
Tango okoya, memela ngai kazaka oyo natikaki na Troasi epai ya Karipisi ; memela ngai mpe babuku na ngai, mingi-mingi babuku oyo basala na poso ya banyama.