38 Basali bakendeki koyebisa makambo yango epai ya basambisi. Tango kaka basambisi bayokaki ete Polo mpe Silasi bazali bato ya Rome, babangaki makasi.
Boye, Erode akomaki koluka nzela ya koboma Yoane, kasi azalaki kobanga bato mpo ete bazalaki kozwa Yoane lokola mosakoli.
Bazalaki koluka nzela ya kokanga Ye, kasi babangaki bato, pamba te bango nyonso bazalaki kozwa Yesu lokola mosakoli.
Tango bakokumba bino kati na bandako ya mayangani, liboso ya bakambi mpe bakonzi, bomitungisa te na koluka koyeba ndenge nini bokosamba mpe maloba nini bokoloba ;
Tango tongo etanaki, basambisi batindaki basali na bango epai ya mokengeli boloko mpo na koyebisa ye : — Bimisa bato wana na boloko !
Mbala moko, bato oyo balingaki kobeta ye fimbu batikaki ye. Mokonzi ya basoda akomaki kobanga tango asosolaki ete tata oyo ye akangaki minyololo azali penza moto ya Rome.