Kaka na ngonga wana ya butu, mokengeli boloko azwaki bango elongo na ye mpe asukolaki bango bapota ; bongo, mbala moko, ye mpe libota na ye bazwaki libatisi.
Nazali na soni te mpo na Sango Malamu, pamba te ezali nguya ya Nzambe mpo na lobiko ya moto nyonso oyo andimaka : liboso, ya Moyuda, mpe sima, ya Mogreki.
ndenge wana mpe, na bolingo monene oyo tozali na yango mpo na bino, tosepelaki kaka te kopesa bino Sango Malamu ya Nzambe, kasi tosepelaki mpe kopesa bino bomoi na biso, pamba te bokomaki motuya makasi na miso na biso.