Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 16:30 - Mokanda na Bomoi

30 Bongo abimisaki bango libanda mpe atunaki bango : — Batata, nasala nini mpo ete nabika ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 16:30
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ndenge nini moto akoki kozala sembo na miso ya Nzambe ? Ndenge nini moto oyo abotami na mwasi akoki kozala peto ?


Lakisa ngai makambo oyo nazali kokoka komona te ; soki nasali mabe, nakozongela yango lisusu te. ›


Tala lolenge ya kokila bilei oyo Ngai nalingaka : kokata minyololo ya masumu, kofungola basinga ya ekangiseli, kopesa bonsomi na mowumbu mpe kobuka ekangiseli nyonso.


Boye, tango okobelela Yawe, akoyanola yo ; tango okosenga lisungi, akoloba : ‹ Ngai oyo. › Soki kati na yo, olongoli ekangiseli, otiki kolakisa bato mosapi mpe otiki maloba mabe ;


Bolakisa na nzela ya bizaleli ete bobongoli mitema.


Esengo na bato oyo bayokelaka bato mosusu mawa, pamba te bakoyokela bango mpe mawa !


Ebele ya bato batunaki ye : — Tosengeli kosala nini ?


— Oh baninga, mpo na nini bozali kosala boye ? Biso mpe tozali kaka bato lokola bino. Soki tozali koteya bino Sango Malamu, ezali mpo ete botika banzambe ya bikeko oyo ezanga tina mpe bomipesa na Nzambe na bomoi oyo asala Likolo, mabele, ebale monene mpe nyonso oyo ezali kati na yango.


Mwasi yango azalaki kolanda biso, Polo mpe biso, na koganga : — Bato oyo bazali basali ya Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, bazali koteya bino nzela ya lobiko.


Tango kaka mokengeli azwaki mitindo oyo, abwakaki bango kati na boloko ya kati mpe akangisaki makolo na bango na mabaya.


Tango bato bayokaki bongo, mitema na bango eyokaki pasi makasi mpe balobaki na Petelo mpe bantoma mosusu : — Bandeko, tosala nini ?


Natunaki : « Nkolo, nasala nini ? » Nkolo alobaki na ngai : « Telema, kende na Damasi ; kuna, bakoyebisa yo makambo nyonso oyo osengeli kosala. »


Kasi sik’oyo, telema, kota kati na engumba, mpe, kuna, bakoyebisa yo makambo oyo osengeli kosala.


Nzambe akosambisa na mawa te moto oyo ayokelaka bato mosusu mawa te. Mawa elongaka kosambisama.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ