Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 16:3 - Mokanda na Bomoi

3 Polo azalaki na posa ya kosala mobembo elongo na ye, boye akatisaki ye ngenga ; pamba te Bayuda oyo bazalaki kovanda kuna bayebaki ete tata na ye azalaki moto ya Grese.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 16:3
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na esika ya kotungisa bango, tosengeli kaka kokomela bango ete balia te misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, basala kindumba te, balia te nyama oyo babomi na kozanga kobimisa makila, mpe bamela makila te.


Barnabasi azalaki na posa ya komema, elongo na bango, Yoane oyo babengaka mpe Malako ;


Kasi Polo azwaki Silasi mpe akendeki elongo na ye, sima na bandeko kotika bango na se ya ngolu ya Nkolo.


Kokatama ngenga to kokatama ngenga te ezali na tina te ; likambo ya tina ezali nde kobatela mibeko ya Nzambe.


Tango nazalaka elongo na Bayuda, nakomaka lokola Moyuda mpo ete namema bango epai ya Klisto ; tango nazalaka elongo na bato oyo bazali na se ya bokonzi ya Mibeko, nakomaka lokola moto oyo azali na se ya bokonzi ya Mibeko, mpo ete namema bango epai ya Klisto, atako ngai moko nazali na se ya bokonzi ya Mibeko te.


Nzokande, ezala Tito oyo azalaki elongo na ngai, batindaki ye kutu te na makasi ete akatisa ngenga, atako azalaki Mogreki.


Pamba te Nzambe oyo asalaki kati na Petelo mpo ete azala ntoma ya bato oyo bakatama ngenga asalaki mpe kati na ngai lokola mpo ete nazala ntoma ya Bapagano.


Pamba te, kati na Yesu-Klisto, likambo ya tina ezali : kozala na kondima oyo esalaka na nzela ya bolingo ; ezali te : kokatama ngenga to kokatama ngenga te.


Nzokande, bino moko boyebi ndenge nini Timote alakisaki molende na ye, pamba te asalaki elongo na ngai mosala ya kopanza Sango Malamu, ndenge mwana asalaka elongo na tata na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ