28 Kasi Polo agangaki na mongongo makasi : — Komisala mabe te ! Biso nyonso tozali awa !
Nazalaki kotambola na mawa lokola mpo na moninga to mpo na ndeko ; nazalaki kokitisa moto na se mpo na mawa lokola moto oyo azali kolela mama na ye.
Yawe, Nzambe na ngai, soki nasalaki makambo oyo bazali kopamela ngai mpo na yango, mpe soki ezali na mabe na maboko na ngai,
Okobomaka te.
Kasi moto oyo atosaka ngai te amisalaka mabe ye moko : moto nyonso oyo ayinaka ngai alingaka kufa. »
Kolekisa ndelo te ya kozala moto mabe to ya kozala zoba ; mpo na nini kokufa liboso ete mikolo ya bomoi na yo ekoka ?
Okozongisa mabe na mabe te to okobombela moko kati na bato na yo kanda te, kasi okolinga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka. Nazali Yawe.
Kasi Ngai, nazali koloba na bino : Bolingaka banguna na bino mpe bosambelaka mpo na bato oyo banyokolaka bino.
Kasi Yesu alobaki : — Boye lisusu te ! Yesu asimbaki litoyi ya mobali yango mpe abikisaki ye.
Yesu alobaki : — Tata, limbisa bango mpo ete bayebi te makambo oyo bazali kosala . Mpe bakabolaki bilamba na Ye, na kobeta zeke.
Mokengeli boloko alamukaki ; mpe tango amonaki ete bikuke ya boloko ezali ya kofungwama, abendaki mopanga na ye mpo ete amiboma, pamba te akanisaki ete bakangami bakimi.
Mokengeli boloko asengaki mwinda, akotaki mbangu kati na boloko, mpe amibwakaki liboso ya Polo mpe Silasi na kolenga makasi.
Bosenzela ete moko te azongisa mabe na mabe, kasi bolukaka tango nyonso kosalanaka bolamu kati na bino mpe kosalaka bato nyonso bolamu.