Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 16:27 - Mokanda na Bomoi

27 Mokengeli boloko alamukaki ; mpe tango amonaki ete bikuke ya boloko ezali ya kofungwama, abendaki mopanga na ye mpo ete amiboma, pamba te akanisaki ete bakangami bakimi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 16:27
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango Ayitofeli amonaki ete balandi te toli na ye, amataki na ane mpe azongaki na ndako na ye kati na engumba na ye. Abongisaki biloko ya ndako na ye mpe amidiembikaki. Boye akufaki mpe bakundaki ye kati na kunda ya tata na ye.


Tango Zimiri amonaki ete mampinga ya Isalaele esili kobotola engumba, akotaki na ndako ya bokonzi, amitumbaki na ndako mpe akufaki na moto.


Yuda abwakaki mbongo yango kati na Tempelo, alongwaki wana mpe akendeki komidiembika.


Erode atindaki bato koluka Petelo, kasi bamonaki ye te. Bongo, sima na ye kosambisa bakengeli, apesaki mitindo ete baboma bango. Sima na yango, Erode atikaki Yuda mpe akendeki kovanda mwa mikolo na Sezarea.


Kasi Polo agangaki na mongongo makasi : — Komisala mabe te ! Biso nyonso tozali awa !


Mokengeli boloko alobaki na Polo : — Basambisi bapesi ngai mitindo ete nabimisa bino na boloko. Boye sik’oyo, bobima mpe bokende na kimia.


Abimeleki abengaki na lombangu elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye mpe alobaki na ye : « Bimisa mopanga na yo mpe boma ngai mpo baloba te na tina na ngai : ‹ Mwasi moko abomaki ye. › » Boye, elenge mobali atobolaki ye mopanga mpe akufaki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ