Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 16:26 - Mokanda na Bomoi

26 Mbala moko, mabele eninganaki makasi, mpe miboko ya boloko eninganaki. Kaka na tango yango, miboko ya boloko ebukanaki, bikuke nyonso ya boloko efungwamaki, mpe minyololo ya bakangami nyonso ekatanaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 16:26
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abimaki mpe akutaki ebembe elali na nzela, ane mpe nkosi etelemi pembeni ya ebembe. Nkosi eliaki te ezala ebembe to ane.


Wuta na Esika na Ye ya bule, wuta na likolo, Yawe atalaki biso awa na mokili


Yawe akataka na sembo makambo ya banyokolami mpe apesaka bilei na bato oyo bazali na nzala ; abimisaka bakangami na boloko.


Kati na Ndako na Ye ya bule, Nzambe azali Tata ya bana bitike, mpe molobeli ya basi bakufisa mibali.


Tika ete kolela ya bakangami kati na boloko ekoma liboso na Yo ! Na nguya monene na Yo, bikisa ba-oyo bazwa etumbu ya kufa !


mpo na kofungola miso ya bakufi miso, mpo na kobimisa bakangami na boloko mpe kobimisa bavandi ya molili, na kasho.


Molimo ya Nkolo Yawe azali likolo na ngai, pamba te Yawe apakoli ngai mafuta mpo na kosakola sango malamu epai ya babola, kobikisa bato oyo mitema na bango esili kozoka, kosakola bonsomi epai ya bawumbu mpe kobimisa bakangami na boloko ;


Mbala moko, mabele eninganaki makasi, pamba te anjelu ya Nkolo akitaki longwa na Likolo, akendeki na kunda, atindikaki libanga mpe avandaki na likolo na yango.


Balekaki bakengeli ya liboso mpe ya mibale, mpe bakomaki na ekuke ya bibende oyo epesaka nzela ya kokota na engumba. Ekuke efungwamaki yango moko liboso na bango ; bongo babimaki mpe batambolaki na balabala moko. Mpe mbala moko, anjelu atikaki Petelo.


Mbala moko, anjelu ya Nkolo abimaki na pwasa, mpe pole engengaki kati na boloko. Anjelu aningisaki Petelo na mopanzi mpo na kolamusa ye ; alobaki na ye : — Telema noki ! Mpe minyololo ekweyaki longwa na maboko ya Petelo.


Boye, tango basilisaki kobondela, esika oyo basanganaki eninganaki ; bango nyonso batondisamaki na Molimo Mosantu mpe bakomaki koteya Liloba na Nzambe na molende nyonso.


Kasi na butu, anjelu moko ya Nkolo afungolaki bikuke ya boloko, abimisaki bantoma mpe alobaki na bango :


Na ngonga wana kaka, mabele eninganaki makasi penza ; mpe eteni moko kati na biteni zomi ya engumba ebukanaki mpe, na koningana yango ya mabele, bato nkoto sambo bakufaki. Bato oyo babikaki batondaki na somo mpe bapesaki Nzambe ya Likolo nkembo.


Bongo namonaki Mpate kobuka ekangelo ya motoba, mpe mabele eninganaki makasi. Moyi ekomaki molili lokola elamba ya mwindo ; bongo sanza, na mobimba na yango, ekomaki motane lokola makila.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ