Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 16:23 - Mokanda na Bomoi

23 Sima na kobetisa bango fimbu makasi, babwakaki bango kati na boloko ; bapesaki mitindo na mokengeli boloko ete akengela bango malamu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 16:23
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moto oyo atekaki Yesu apesaki bango elembo moko ; alobaki na bango : « Moto oyo ngai nakopesa beze, ezali nde ye ; bokanga ye. »


Kasi liboso ya makambo wana nyonso, bakokanga bino, bakonyokola bino, bakofunda bino kati na bandako ya mayangani, bakobwaka bino na baboloko, bakomema bino liboso ya bakonzi mpe ya bayangeli, mpo na Kombo na Ngai.


Na tongo, mobulu monene ebimaki kati na basoda, pamba te bazalaki kotunana : — Likambo nini ekomelaki Petelo ?


Sima na ye kokanga Petelo, atiaki ye kati na boloko mpe aponaki masanga minei ya basoda mpo ete bakengela ye ; lisanga moko na moko ezalaki na basoda minei. Erode azalaki na makanisi ya kosambisa ye na miso ya bato sima na feti ya Pasika.


Mokengeli boloko alamukaki ; mpe tango amonaki ete bikuke ya boloko ezali ya kofungwama, abendaki mopanga na ye mpo ete amiboma, pamba te akanisaki ete bakangami bakimi.


Mokengeli boloko alobaki na Polo : — Basambisi bapesi ngai mitindo ete nabimisa bino na boloko. Boye sik’oyo, bobima mpe bokende na kimia.


Bakangaki bantoma mpe babwakaki bango na boloko ya monene.


— Tokuti boloko ya kokangama malamu mpe bakengeli liboso ya bikuke ; kasi tango tofungoli yango, tomoni ata moto moko te na kati.


Kasi Saulo akomaki koluka kopanza Lingomba ; azalaki kokota na bandako nyonso mpo na kokanga mibali mpe basi, mpe kobwaka bango na boloko.


mpe asengaki ye mikanda ya mosala mpo na bandako ya mayangani ya Damasi, mpo ete, soki akuti kuna bato oyo bazali kolanda nzela ya Nkolo, akanga bango mpe amema bango na Yelusalemi, ezala basi to mibali.


Bazali basali ya Klisto ? —Nazali koloba lokola moto ya liboma— Ngai naleki bango. Pamba te nasalaki makasi penza, nakotaki mbala mingi na boloko, babetaki ngai mingi, nakutanaki na makama ya kufa mbala mingi.


kati na kobetama, boloko mpe mobulu ; kati na misala makasi, kozanga kolala mpe kokila bilei ;


Yango wana, ngai Polo, mokangami na boloko mpo ete nazali mosali ya Yesu-Klisto mpo na bolamu na bino Bapagano—


Ngai Polo, mokangami na boloko mpo na Nkolo, nazali kosenga na bino ete botambolaka na lolenge oyo ebongi na bato oyo Nzambe abengi :


Ezali mpe mpo na Sango Malamu yango nde nazali komona pasi kino bakanga ngai minyololo lokola mobomi, kasi bakangi Liloba na Nzambe minyololo te.


kasi nasepeli kosenga na yo na kombo ya bolingo, ngai Polo, mobange mpe sik’oyo mokangami na boloko mpo na Yesu-Klisto ;


Jozue apesaki mitindo epai ya Banganga-Nzambe : « Bobima wuta na kati-kati ya ebale Yordani. »


Ngai Yoane, ndeko na bino, oyo azali kokabola elongo na bino pasi, bokonzi mpe molende kati na Yesu, nazalaki kati na esanga ya Patimosi, likolo ya Liloba na Nzambe mpe litatoli na ngai na tina na Yesu.


Kobanga te pasi oyo osengeli komona. Tala, Satana akobwaka bato mingi kati na bino na boloko mpo na komeka bino mpe bokonyokwama mikolo zomi. Zala kaka sembo kati na kondima na yo kino na kufa, mpe Ngai nakopesa yo bomoi lokola motole ya elonga na yo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ