Bakalaka balobaki na mokonzi : — Moto oyo asengeli kokufa ! Maloba na ye ezali kolembisa basoda mpe bato oyo batikali kati na engumba oyo ; azali koluka bolamu ya bato oyo te, kasi azali nde koluka mabe na bango.
Tango bankolo ya mowumbu yango bamonaki ete elikya na bango ya kozwa mbongo ekeyi na mopepe, bakangaki Polo mpe Silasi, mpe bamemaki bango liboso ya bakonzi, na esika ya bato ebele.
Kuna, akutanaki na Moyuda moko, kombo na ye ezalaki « Akilasi. » Azalaki moto ya mboka Ponti. Akilasi awutaki koya kala te longwa na Itali, elongo na mwasi na ye, Prisile, pamba te mokonzi Klode apesaki mitindo ete Bayuda nyonso balongwa na Rome. Boye, Polo akendeki kotala bango ;
Bomekolaka te bizaleli ya tango oyo, kasi bobongwana na nzela ya boyeisami sika ya mayele na bino, mpo ete bososolaka mokano ya Nzambe, oyo ezali malamu, esepelisaka Ye mpe ezali ya kokoka.