19 Tango bankolo ya mowumbu yango bamonaki ete elikya na bango ya kozwa mbongo ekeyi na mopepe, bakangaki Polo mpe Silasi, mpe bamemaki bango liboso ya bakonzi, na esika ya bato ebele.
Kasi bosala keba, pamba te bakofunda bino na bisambiselo ya Bayuda mpe bakobeta bino fimbu kati na bandako ya mayangani. Likolo na Ngai, bokosamba liboso ya bayangeli mpe liboso ya bakonzi. Boye, ekozala mpo na bino libaku malamu ya kotatola solo na tina na Ngai.
Bongo, Bayuda oyo bawutaki na Antioshe mpe na Ikoniomi batiaki songisongi kati na bato mpo ete batombokela bango. Babambaki Polo mabanga, mpe babendaki ye kino na libanda ya engumba, pamba te bakanisaki ete akufi.
Bantoma, bakambi elongo na Lingomba mobimba bazwaki mokano ya kopona ndambo ya bato kati na bango mpe ya kotinda bango na Antioshe elongo na Polo mpe Barnabasi. Baponaki Yuda oyo babengaka Barsabasi, mpe Silasi ; bango mibale bazalaki bakambi kati na bandeko.
Mokolo moko, wana tozalaki kokende na esika ya losambo, tokutanaki na mwasi mowumbu moko oyo azalaki na molimo mabe oyo ezalaki kosunga ye mpo na kosakola makambo oyo ekoya, mpe azalaki kozwela bankolo na ye mbongo ebele na nzela ya masakoli na ye.
Mobulu makasi ekotaki kati na engumba mobimba, mpe ebele ya bato oyo bawutaki bipai na bipai bayaki na lombangu. Bakangaki Polo, babimisaki ye libanda ya Tempelo mpe, mbala moko, bakangaki bikuke na yango.
Boyebi lisusu ete, sima na biso konyokwama mpe kofingama kati na Filipi, toteyaki bino, na lisungi ya Nzambe na biso mpe na molende nyonso, Sango Malamu na Ye kati na bitumba makasi.