Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 15:40 - Mokanda na Bomoi

40 Kasi Polo azwaki Silasi mpe akendeki elongo na ye, sima na bandeko kotika bango na se ya ngolu ya Nkolo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 15:40
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango akomaki kuna mpe amonaki ndenge nini Nzambe apambolaki bango, asepelaki makasi mpe alendisaki bango nyonso ete bakangama makasi na Nkolo, na mitema na bango mobimba.


Boye, sima na bango kokila bilei mpe kosambela, batielaki bango maboko mpe batikaki bango kokende.


Wuta na Atalia, bakotaki na masuwa mpe bazongaki na Antioshe epai wapi batikaki bango na se ya ngolu ya Nzambe, mpo na mosala oyo bawutaki kokokisa.


Bantoma, bakambi elongo na Lingomba mobimba bazwaki mokano ya kopona ndambo ya bato kati na bango mpe ya kotinda bango na Antioshe elongo na Polo mpe Barnabasi. Baponaki Yuda oyo babengaka Barsabasi, mpe Silasi ; bango mibale bazalaki bakambi kati na bandeko.


Lokola Yuda mpe Silasi bazalaki basakoli, bazwaki penza tango molayi mpo na koloba na bandeko mpe kolendisa bango ete bayika mpiko kati na kondima.


Tango bankolo ya mowumbu yango bamonaki ete elikya na bango ya kozwa mbongo ekeyi na mopepe, bakangaki Polo mpe Silasi, mpe bamemaki bango liboso ya bakonzi, na esika ya bato ebele.


Ndambo ya Bayuda bandimisamaki mpe basanganaki na Polo mpe Silasi ; ndenge moko mpe na bato mingi ya Grese, oyo bazalaki kogumbamela Nzambe, mpe basi ebele ya lokumu.


Sik’oyo, nazali kokaba bino na maboko ya Nzambe mpe na Liloba na Ye ya ngolu. Nzambe azali na makoki ya kolendisa bino mpe ya kopesa bino libula kati na bato nyonso oyo babulisama.


Kasi na ngolu ya Nzambe, nazali oyo nazali lelo ; mpe ngolu na Ye epai na ngai ezali ya pamba te. Kutu, nasalaki mosala mingi koleka bango nyonso ; nzokande, ezali ngai te, kasi ezali nde ngolu ya Nzambe, oyo ezali elongo na ngai.


Tika ete Nkolo azala elongo na molimo na yo ! Tika ete ngolu ezala na bino nyonso !


Bato nyonso oyo bazali elongo na ngai batindeli yo mbote. Pesa mbote na bato oyo balingaka biso kati na kondima. Tika ete ngolu ya Nzambe ezala na biso nyonso !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ