Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 15:37 - Mokanda na Bomoi

37 Barnabasi azalaki na posa ya komema, elongo na bango, Yoane oyo babengaka mpe Malako ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 15:37
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango amonaki bongo, akendeki na ndako ya Mari, mama ya Yoane oyo kombo na ye mosusu ezali « Malako. » Bandimi ebele basanganaki kuna mpe bazalaki kosambela.


Ndenge moko mpe Malako, Arisitarke, Demasi mpe Luka, baninga na ngai ya mosala, bango mpe batindeli yo mbote.


Kaka Luka nde azali elongo na ngai. Kamata Malako, mpe boya elongo na ye, pamba te azali na tina mingi epai na ngai mpo na lotomo.


Arisitarke, moninga na ngai kati na boloko, atindeli bino mbote. Boyamba mpe mbote ya Malako, ndeko ya Barnabasi, oyo na tina na ye napesaki bino mitindo ete, soki ayei epai na bino, boyamba ye malamu.


Tango bakomaki na Salamine, bateyaki Liloba na Nzambe kati na bandako ya mayangani ya Bayuda. Yoane Malako azalaki elongo na bango lokola mosungi.


Sima na Barnabasi mpe Saulo kokokisa mosala na bango mpo na bolamu ya bandimi ya Yelusalemi, batikaki Yelusalemi mpe bamemaki, elongo na bango, Yoane oyo kombo na ye mosusu ezali « Malako. »


Wuta na Pafosi, Polo elongo na baninga na ye bazwaki masuwa mpe bakendeki na Perje, kati na mokili ya Pafili, epai wapi Yoane Malako atikaki bango mpo na kozonga na Yelusalemi.


Boye, babendanaki makasi penza mpe basukaki na kokabwana. Barnabasi azwaki Malako mpe akotaki elongo na ye kati na masuwa mpo na kokende na Shipre.


Lingomba ya babulami oyo bazali na Babiloni epesi bino mbote. Mwana na ngai, Malako, apesi mpe bino mbote.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ