Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 15:32 - Mokanda na Bomoi

32 Lokola Yuda mpe Silasi bazalaki basakoli, bazwaki penza tango molayi mpo na koloba na bandeko mpe kolendisa bango ete bayika mpiko kati na kondima.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 15:32
39 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na mobu ya liboso ya bokonzi ya Dariusi, moto ya Medi, nazalaki wana mpo na kosunga mpe kobatela ye.


Mpo na yango, Ngai nakotindela bino basakoli, bato ya bwanya mpe balakisi ya Mobeko. Bokoboma mpe bokobaka bamoko na ekulusu, bokobeta bamosusu fimbu kati na bandako na bino ya mayangani mpe bokobengana bango na engumba moko na moko,


Yango wana, Nzambe, kati na bwanya na Ye, aloba : « Nakotindela bango basakoli mpe bantoma ; bakoboma bamoko, mpe bakonyokola bamosusu. »


Tango akomaki kuna mpe amonaki ndenge nini Nzambe apambolaki bango, asepelaki makasi mpe alendisaki bango nyonso ete bakangama makasi na Nkolo, na mitema na bango mobimba.


Na mikolo wana, ndambo ya basakoli bakendeki na Antioshe longwa na Yelusalemi.


Kati na Lingomba oyo ezalaki na Antioshe, ezalaki na basakoli mpe balakisi : Barnabasi, Simeoni oyo bazalaki kobenga « Moto mwindo, » Lusiusi ya Sirene, Manaeni oyo akolaki esika moko na moyangeli Erode, mpe Saulo.


bazalaki kolendisa bayekoli ete bayika mpiko kati na kondima. Bazalaki koloba : — Tosengeli komona pasi mingi mpo na kokota na Bokonzi ya Nzambe.


Ndambo ya bato bawutaki na Yuda mpe bakomaki na Antioshe, mpe bakomaki koteya bandeko : — Soki bokatisi ngenga te kolanda Mobeko ya Moyize, bokoki te kozwa lobiko.


Bantoma, bakambi elongo na Lingomba mobimba bazwaki mokano ya kopona ndambo ya bato kati na bango mpe ya kotinda bango na Antioshe elongo na Polo mpe Barnabasi. Baponaki Yuda oyo babengaka Barsabasi, mpe Silasi ; bango mibale bazalaki bakambi kati na bandeko.


Yango wana, totindeli bino Yuda mpe Silasi mpo ete bakoka koyebisa bino makambo oyo tokomi kati na mokanda oyo.


Lingomba esungaki bango mpo na mobembo. Wana bakatisaki Fenisi mpe Samari, bazalaki koloba ndenge nini bato ya bikolo ya bapaya bazalaki kobongola mitema. Sango oyo ezalaki kopesa bandeko nyonso esengo.


Bato batangaki mokanda yango mpe basepelaki mingi na malendisi oyo ezalaki kati na yango.


Atambolaki kati na Siri mpe na Silisi mpo na kolendisa Mangomba.


Sima na Polo kovanda mwa mikolo na Antioshe, alongwaki kuna mpe alekaki na etuka ya Galatia mpe ya Friji, na kolendisa bayekoli nyonso.


Petelo azalaki kokebisa bango na maloba ebele mpe azalaki kolendisa bango na maloba oyo : — Boyamba lobiko mpo ete bozwa etumbu te oyo ezali kozela bato mabe.


Wana azalaki kotambola kati na etuka yango, azalaki kolendisa bandimi na mateya ya ndenge na ndenge kino akomaki na Grese


Kolanda ngolu oyo epesameli biso, tozalaka na makabo ekesana. Boye tika ete moto oyo azali na likabo ya kosakola asalelaka yango kolanda kondima,


tika ete moto oyo azali na likabo ya kolendisa alendisaka, tika ete moto oyo azali na likabo ya kopesa apesaka na motema moko, tika ete moto oyo azali na likabo ya kokamba akambaka na molende, mpe tika ete moto oyo azali na likabo ya kosunga bato bakelela asungaka na esengo !


Ezali Ye nde akolendisa mpe bino kino na suka, mpo ete bozala bato bazangi pamela na mokolo ya Nkolo na biso, Yesu-Klisto.


Mpo na oyo etali basakoli, tika ete mibale to misato basakola, mpe bamosusu baluka kososola malamu makambo oyo bazali koloba.


Kasi moto oyo asakolaka alobaka nde na bato mpo na kokolisa kondima na bango, kolendisa bango mpe kobondisa bango.


Mosakoli azali na bokonzi likolo ya molimo ya basakoli, oyo ezali kokamba ye.


Molimo ayebisaki mabombami yango te na bato ya bikeke ya kala, ndenge alakisi yango sik’oyo na bantoma mpe basakoli ya Nzambe oyo bazali bule.


Boyebi mpe ete tosalaki, epai ya moko na moko kati na bino, ndenge penza tata asalaka mpo na bana na ye :


Yango wana totindaki Timote, ndeko na biso mpe moninga ya Nzambe kati na mosala ya kopanza Sango Malamu ya Klisto, mpo ete alendisa bino mpe apesa bino mpiko kati na kondima,


Bandeko, mpo na oyo etali makambo mosusu, tolakisaki bino ndenge nini bosengeli kotambola mpo na kosepelisa Nzambe, mpe yango nde bozali kosala. Kasi sik’oyo, tozali kosenga na bino mpe kotinda bino na makasi, kati na Nkolo Yesu, ete bokoba kosalaka bongo koleka.


Bandeko, tozali kolendisa bino : bopesaka bagoyigoyi mpe bato ya mobulu makebisi, bolendisaka ba-oyo basili kobungisa mpiko na bango, bosungaka ba-oyo bazangi makasi, boyikanaka mpiko.


Tozali kokomela bato ya lolenge wana malako mpe kosenga na bango, na Kombo ya Nkolo Yesu-Klisto, ete basala mosala na kimia mpe balia bilei oyo bakozwa na motoki na bango moko.


Boye liboso na nyonso, nazali kolendisa ete bosengaka na Nzambe, bosambelaka Ye, bobondelaka Ye mpo na bato mosusu mpe bozongiselaka Ye matondi mpo na bato nyonso,


teya Liloba, betela yango sete na tango ya malamu to te, zongisa na nzela, pamela mpe lendisa na nzela ya mateya na yo mpe na kokanga motema.


Nazali sik’oyo kolendisa bakambi ya Lingomba, oyo bazali kati na bino, pamba te ngai mpe nazali mokambi lokola bango, nazali motatoli ya bapasi ya Klisto mpe nakozwa nkembo oyo ekomonisama.


Kasi sima na bino komona pasi mpo na mwa tango moke, Nzambe ya ngolu nyonso, oyo abenga bino na nkembo na Ye ya seko kati na Yesu-Klisto, akokomisa bino bato ya kokoka, akolendisa bino, akopesa bino makasi mpe akotelemisa bino ngwi.


Na lisungi ya Silasi oyo azali ndeko ya solo, nakomeli bino mokanda oyo na mokuse mpo na kolendisa bino mpe kolakisa bino ete ngolu oyo bokangami na yango ezali ngolu ya solo ya Nzambe. Bopikama kati na yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ