Kasi bamosusu kati na bango, bato ya Shipre mpe ya Sirene, bakendeki na Antioshe mpe bakomaki koteya Sango Malamu ya Nkolo Yesu epai ya bato oyo balobaka lokota ya Greki.
Bantoma, bakambi elongo na Lingomba mobimba bazwaki mokano ya kopona ndambo ya bato kati na bango mpe ya kotinda bango na Antioshe elongo na Polo mpe Barnabasi. Baponaki Yuda oyo babengaka Barsabasi, mpe Silasi ; bango mibale bazalaki bakambi kati na bandeko.
Boye, bantoma zomi na mibale basangisaki bayekoli nyonso mpe balobaki na bango : — Ekozala malamu te mpo na biso kotika mosala ya koteya Liloba na Nzambe mpo na komipesa na mosala ya kokabola bilei.