Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 15:22 - Mokanda na Bomoi

22 Bantoma, bakambi elongo na Lingomba mobimba bazwaki mokano ya kopona ndambo ya bato kati na bango mpe ya kotinda bango na Antioshe elongo na Polo mpe Barnabasi. Baponaki Yuda oyo babengaka Barsabasi, mpe Silasi ; bango mibale bazalaki bakambi kati na bandeko.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 15:22
29 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bato nyonso bayokaki ndayi yango mpe basepelaki na yango : bazalaki kosepela na makambo nyonso oyo mokonzi azalaki kosala.


Kati na mokili ya Yuda, loboko ya Nzambe ezalaki kosala na nguya makasi epai ya bato, mpo na kopesa bango bomoko na molimo mpo na kotosa mitindo ya mokonzi mpe ya bakalaka na ye, kolandisama na Liloba na Yawe.


Mokonzi mpe lisanga mobimba bandimaki mabongisi yango,


Bapesaki bakombo ya bato mibale : Jozefi oyo babengaki « Barsabasi » mpe ayebanaki lisusu na kombo Yusitusi, mpe Matiasi.


Nzokande, bandimi oyo bapalanganaki mpo na kokima minyoko oyo eyaki tango babomaki Etieni, bakimaki kino na Fenisi, na Shipre mpe na Antioshe. Mpe kuna, bazalaki kosakola Sango Malamu epai ya moto mosusu te, kaka epai ya Bayuda.


Kasi bamosusu kati na bango, bato ya Shipre mpe ya Sirene, bakendeki na Antioshe mpe bakomaki koteya Sango Malamu ya Nkolo Yesu epai ya bato oyo balobaka lokota ya Greki.


Sango yango ekomaki kino na Lingomba ya Yelusalemi, mpe batindaki Barnabasi, na Antioshe.


Na mikolo wana, ndambo ya basakoli bakendeki na Antioshe longwa na Yelusalemi.


Bapesaki bango mokanda oyo ekomamaki boye : Biso bantoma mpe bakambi, bandeko na bino : Epai ya bato ya bikolo ya bapaya oyo bavandaka kati na Antioshe, na Siri mpe na Silisi ; Mbote na bino.


Boye, biso nyonso toyokanaki mpo na kopona bato mpe kotindela bino bango, elongo na bandeko balingami na biso, Barnabasi mpe Polo,


Yango wana, totindeli bino Yuda mpe Silasi mpo ete bakoka koyebisa bino makambo oyo tokomi kati na mokanda oyo.


Lingomba esungaki bango mpo na mobembo. Wana bakatisaki Fenisi mpe Samari, bazalaki koloba ndenge nini bato ya bikolo ya bapaya bazalaki kobongola mitema. Sango oyo ezalaki kopesa bandeko nyonso esengo.


Boye, batikaki bango kokende na Antioshe epai wapi basangisaki Lingomba mobimba mpe bapesaki mokanda yango.


Lokola Yuda mpe Silasi bazalaki basakoli, bazwaki penza tango molayi mpo na koloba na bandeko mpe kolendisa bango ete bayika mpiko kati na kondima.


Kasi Polo azwaki Silasi mpe akendeki elongo na ye, sima na bandeko kotika bango na se ya ngolu ya Nkolo.


Tango bankolo ya mowumbu yango bamonaki ete elikya na bango ya kozwa mbongo ekeyi na mopepe, bakangaki Polo mpe Silasi, mpe bamemaki bango liboso ya bakonzi, na esika ya bato ebele.


Pene na midi ya butu, Polo mpe Silasi bazalaki kosambela mpe kokumisa Nzambe na banzembo ; bakangami mosusu bazalaki koyoka bango.


Mokengeli boloko asengaki mwinda, akotaki mbangu kati na boloko, mpe amibwakaki liboso ya Polo mpe Silasi na kolenga makasi.


Wana butu ekomaki, bandeko bakimisaki Polo mpe Silasi noki-noki na Bere. Tango bakomaki kuna, bakotaki na ndako ya mayangani ya Bayuda.


Bongo, kaka na tango yango, bandeko basalaki ete Polo akende na ebale mpo na kozwa masuwa, wana Silasi mpe Timote batikalaki na Bere.


Ndambo ya Bayuda bandimisamaki mpe basanganaki na Polo mpe Silasi ; ndenge moko mpe na bato mingi ya Grese, oyo bazalaki kogumbamela Nzambe, mpe basi ebele ya lokumu.


Tango Silasi mpe Timote bayaki wana wuta na Masedwane, Polo akomaki kolekisa tango na ye nyonso kaka na koteya Liloba mpe kotalisa solo epai ya Bayuda ete Yesu azali Klisto.


Tango bantoma, kati na Yelusalemi, bayokaki ete bato ya Samari bayambi Liloba na Nzambe, batindelaki bango Petelo mpe Yoane.


Pamba te Yesu-Klisto, Mwana na Nzambe, oyo ngai Silasi mpe Timote toteyaki bino, azalaki te « iyo » mpe « te ; » kasi kati na Ye, ezalaki tango nyonso « iyo. »


Polo, Silasi mpe Timote ; Epai ya bandeko ya Lingomba ya Tesalonika, ba-oyo bazali kati na Nzambe Tata mpe kati na Nkolo Yesu-Klisto : Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino !


Polo, Silasi mpe Timote ; Epai ya Lingomba ya bandeko ya Tesalonika, oyo ezali kati na Nzambe, Tata na biso, mpe kati na Nkolo Yesu-Klisto :


Na lisungi ya Silasi oyo azali ndeko ya solo, nakomeli bino mokanda oyo na mokuse mpo na kolendisa bino mpe kolakisa bino ete ngolu oyo bokangami na yango ezali ngolu ya solo ya Nzambe. Bopikama kati na yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ