21 Pamba te wuta kala, kati na bingumba nyonso, ezali na bato oyo bateyaka Mobeko ya Moyize, mpe batangaka yango kati na bandako ya mayangani, mikolo nyonso ya Saba.
Akendeki na Nazareti epai wapi akolaki ; mpe na mokolo ya Saba, akotaki na ndako ya mayangani, ndenge ezalaki momesano na ye. Atelemaki mpo na kotanga,
Sima na kotanga Mobeko mpe Basakoli, bakambi ya ndako ya mayangani batindelaki bango maloba : — Bandeko, soki bozali na maloba mpo na kolendisa bato, bokoki na bino koloba.
Bato ya Yelusalemi mpe bakambi na bango basosolaki te soki Yesu azali nani ; basosolaki mpe te maloba ya basakoli oyo etangamaka mikolo nyonso ya Saba. Nzokande, tango bakatelaki Ye etumbu, bakokisaki nde masakoli yango.