Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 15:2 - Mokanda na Bomoi

2 Polo mpe Barnabasi batelemelaki bato wana ; bongo kobendana makasi ekotaki kati na bango na tina na likambo yango. Boye, bazwaki mokano ete Polo, Barnabasi mpe ndambo ya bandimi mosusu bakende na Yelusalemi elongo na bantoma mpe bakambi ya Lingomba mpo na kolobela likambo yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 15:2
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Soki osaleli toli oyo napesi yo mpe soki Nzambe akambi yo, okolonga, mpe bato oyo nyonso bakobanda kozonga na esengo epai na bango.


Petelo akotisaki bango na ndako mpe apesaki bango esika ya kolala. Mokolo oyo elandaki, Petelo akendeki elongo na bango, mpe ndambo ya bandimi balandaki ye wuta na Jafa.


Molimo alobaki na ngai ete natia tembe te mpo na kokende elongo na bango. Bandeko motoba bakendeki elongo na ngai kino na Sezarea, mpe tokotaki na ndako ya moto yango.


Basalaki bongo : batindaki masungi na bango epai ya bakambi ya Lingomba, na nzela ya Barnabasi mpe Saulo.


Boye, biso nyonso toyokanaki mpo na kopona bato mpe kotindela bino bango, elongo na bandeko balingami na biso, Barnabasi mpe Polo,


Yango wana, totindeli bino Yuda mpe Silasi mpo ete bakoka koyebisa bino makambo oyo tokomi kati na mokanda oyo.


Tango bakomaki na Yelusalemi, Lingomba, bantoma mpe bakambi bayambaki bango ; mpe Polo elongo na Barnabasi bapesaki bango sango ya makambo nyonso oyo Nzambe asalaki na nzela na bango.


Kati na bingumba nyonso oyo bazalaki koleka, bazalaki koyebisa bandimi mikano oyo bantoma mpe bakambi ya Lingomba bazwaki na Yelusalemi, mpe bazalaki kosenga na bango ete batosa yango.


Mokolo oyo elandaki, Polo amemaki biso epai ya Jake, mpe bakambi nyonso ya Lingomba bayaki kuna.


Polo oyo abengama mpo na kozala ntoma ya Yesu-Klisto, kolanda mokano ya Nzambe, mpe ndeko mobali Sositeni ;


Nzokande, nakanisi ete nazali moke te na miso ya bantoma oyo bamimonaka ete bazali minene.


Kasi totikelaki bango ata tango te mpo ete bosolo ya Sango Malamu etikala mpo na bino.


Balingami na ngai, nazalaki na posa makasi ya kokomela bino na tina na lobiko oyo tozali na yango na lisanga. Nazwaki mokumba ya kokomela bino mpo na kolendisa bino ete bobunda mpo na kondima oyo Nzambe apesaki, mbala moko mpo na libela, epai ya basantu.


Mpe Yawe azongiselaki Samuele : « Yoka makambo nyonso oyo bato bazali koloba na yo. Ezali yo te nde basundoli, kasi basundoli nde Ngai lokola Mokonzi na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ