Ezalaki mpe na basi oyo bazalaki kotala na mosika. Kati na basi yango, ezalaki na Mari, moto ya Magidala ; Mari, mama ya Jake oyo ya elenge, ya Joze mpe ya Salome ;
Petelo atelemaki elongo na bantoma zomi na moko ; mpe na mongongo makasi, alobaki na ebele ya bato : — Bino Bayuda, mpe bino nyonso oyo bovandaka na Yelusalemi, botika ete nalimbola mpo na bino likambo oyo, boyoka malamu makambo oyo nalingi koloba.
Bato ya Isalaele, boyoka maloba oyo : Yesu ya Nazareti, moto oyo, na nzela ya bikamwa, ya bilembo mpe ya misala ya minene, Nzambe alakisaki bino ete awutaki epai na Ye ndenge bino moko boyebi yango,