12 Lisanga mobimba evandaki kimia wana bazalaki koyoka Barnabasi mpe Polo koyebisa bango bikamwa mpe bilembo oyo Nzambe asalaki na nzela na bango, kati na bato ya bikolo ya bapaya.
Tango bakomaki kuna, basangisaki bato ya Lingomba, bapesaki bango sango ya makambo nyonso oyo Nzambe asalaki na nzela na bango mpe ndenge nini afungolelaki bato ya bikolo ya bapaya nzela ya kondima.
Tango bakomaki na Yelusalemi, Lingomba, bantoma mpe bakambi bayambaki bango ; mpe Polo elongo na Barnabasi bapesaki bango sango ya makambo nyonso oyo Nzambe asalaki na nzela na bango.
Sima na ye kopesa bango mbote, Polo akomaki koyebisa bango likambo moko na moko, oyo Nzambe asalaki kati na bato ya bikolo ya bapaya, na nzela ya lotomo na ye.
Pamba te soki nakoki koloba, nakoloba kaka mpo na makambo oyo Klisto asalaki na nzela na ngai, mpo na komema Bapagano na kotosa Nzambe. Asalaki yango na nzela ya makambo oyo nalobaki mpe nasalaki