10 Bongo mpo na nini bolingi sik’oyo komeka Nzambe, na nzela ya koluka komemisa bayekoli oyo, mokumba oyo tolongaki te komema, ezala biso to batata na biso ?
Bato ya Isalaele baswanisaki Moyize, balobaki na ye : — Pesa biso mayi ya komela ! Moyize azongiselaki bango : — Mpo na nini bozali koswanisa ngai ? Mpo na nini bolingi komeka Yawe ?
Babongisaka mikumba ya kilo makasi mpe batiaka yango na mapeka ya bato mosusu, kasi bango moko balingaka ata moke te kotombola mosapi oyo ya moke mpo na kosunga bato yango na komema mikumba yango.
Petelo alobaki na ye : — Mpo na nini boyokanaki mpo na komeka Molimo ya Nkolo ? Yoka, makolo ya bato oyo bawuti kokunda mobali na yo esili kokoma liboso ya ekuke ; yo mpe, bakomema yo.
Mpe ezali elilingi ya makambo oyo ezali kosalema na tango oyo mpo na kotalisa ete makabo mpe bambeka oyo babonzelaka Nzambe ezali na makoki te ya kokomisa ya kokoka, mitema ya bato oyo basambelaka ndenge wana.