Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 15:1 - Mokanda na Bomoi

1 Ndambo ya bato bawutaki na Yuda mpe bakomaki na Antioshe, mpe bakomaki koteya bandeko : — Soki bokatisi ngenga te kolanda Mobeko ya Moyize, bokoki te kozwa lobiko.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 15:1
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo na mokolo ya mwambe, basengeli kokata mwana ngenga.


Bokanisa nanu : Moyize apesaki bino mitindo ya kokatisa ngenga, —mobeko yango ewutaki kutu na Moyize te, kasi na bakoko— mpe botosaka mitindo yango ata na mokolo ya Saba.


Mokolo moko kati na mikolo yango, Petelo atelemaki kati na bandimi pene nkama moko na tuku mibale


Bantoma, bakambi elongo na Lingomba mobimba bazwaki mokano ya kopona ndambo ya bato kati na bango mpe ya kotinda bango na Antioshe elongo na Polo mpe Barnabasi. Baponaki Yuda oyo babengaka Barsabasi, mpe Silasi ; bango mibale bazalaki bakambi kati na bandeko.


Bapesaki bango mokanda oyo ekomamaki boye : Biso bantoma mpe bakambi, bandeko na bino : Epai ya bato ya bikolo ya bapaya oyo bavandaka kati na Antioshe, na Siri mpe na Silisi ; Mbote na bino.


Toyokaki ete bandeko mosusu bawutaki epai na biso, ba-oyo topesaki ata nzela te, bayaki kotia mobulu kati na bino, batiaki penza mobulu kati na bino mpe batungisaki mitema na bino na nzela ya maloba na bango. Nzokande, totindaki bango te.


Lingomba esungaki bango mpo na mobembo. Wana bakatisaki Fenisi mpe Samari, bazalaki koloba ndenge nini bato ya bikolo ya bapaya bazalaki kobongola mitema. Sango oyo ezalaki kopesa bandeko nyonso esengo.


Lokola Yuda mpe Silasi bazalaki basakoli, bazwaki penza tango molayi mpo na koloba na bandeko mpe kolendisa bango ete bayika mpiko kati na kondima.


Ndambo ya bandimi oyo bazalaki kala Bafarizeo batelemaki mpo na koloba : — Bato ya bikolo ya bapaya basengeli kokatama ngenga, mpe esengeli kotinda bango kotosa Mobeko ya Moyize.


Sima na bango koyoka ye, bakumisaki Nzambe. Bongo balobaki na Polo : — Ndeko, ozali komona motango ya bankoto ya Bayuda oyo bakomi bandimi, mpe bango nyonso bazali na bolingo makasi mpo na Mobeko ya Moyize.


pamba te toyokaki ye koloba ete Yesu ya Nazareti akobuka Tempelo oyo mpe akobongola bizaleli oyo Moyize atikela biso.


Sima na mibu zomi na minei, nazongaki lisusu na Yelusalemi elongo na Barnabasi ; namemaki mpe Tito.


Pamba te, kati na Yesu-Klisto, likambo ya tina ezali : kozala na kondima oyo esalaka na nzela ya bolingo ; ezali te : kokatama ngenga to kokatama ngenga te.


Bato oyo balingaka koyebana na miso ya bato batindaka bino na makasi kokatisa ngenga, mpo ete banyokola bango te mpo na ekulusu ya Klisto.


Yango wana, bopesaka na moto moko te nzela ya kosambisa bino na tina na biloko ya kolia to ya komela to mpe na tina na mokolo ya feti lokola feti ya ebandeli ya sanza to ya Saba.


Bosalaka keba ete moko te akanga bino na motambo ya mayele ya lokuta mpe ezanga tina, kolanda bokoko ya bato mpe etamboli ya mokili oyo, pamba te ewutaka na Klisto te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ