Pamba te mwana mobali azali koyokisa tata na ye soni, elenge mwasi azali kotelemela mama na ye, mwasi ya libala azali kotelemela mama-bokilo na ye ; bongo monguna ya moto, ezali kaka moto ya libota na ye.
Simeoni apambolaki bango mpe alobaki na Mari, mama ya Yesu : — Yeba malamu ete Mwana oyo atindami mpo na kokweyisa mpe kotelemisa bato ebele kati na Isalaele, mpe mpo na kozala elembo oyo ekomema tembe kati na bato.
Kasi tango Bayuda bamonaki ebele ya bato, batondaki na zuwa ; bakomaki koloba mabe na tina na makambo oyo Polo azalaki koloba, mpe bakomaki kofinga ye.
Kasi Bayuda batiaki songisongi epai ya basi ya lokumu oyo bazalaki kogumbamela Nzambe, mpe epai ya bato minene ya engumba wana ; bapelisaki moto mpo ete Polo mpe Barnabasi banyokolama, mpe babenganaki bango wuta na mokili na bango.
Bongo, Bayuda oyo bawutaki na Antioshe mpe na Ikoniomi batiaki songisongi kati na bato mpo ete batombokela bango. Babambaki Polo mabanga, mpe babendaki ye kino na libanda ya engumba, pamba te bakanisaki ete akufi.
Kasi bato mosusu kati na bango bazalaki mitema mabanga ; baboyaki kondima mpe batiolaki nzela ya Nkolo na miso ya bato ebele. Bongo Polo akabwanaki na bango. Amemaki bayekoli mpe, mokolo na mokolo, azalaki koteya bango na eteyelo ya Tiranisi.
Bandeko, bino mpe bokomaki kolanda ndakisa ya Mangomba oyo, kati na Yuda, ezali ya Nzambe mpe ezali kati na Yesu-Klisto, pamba te bandeko na bino ya ekolo moko banyokolaki bino ndenge Bayuda banyokolaki Mangomba ya Yuda.