Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 14:3 - Mokanda na Bomoi

3 Polo mpe Barnabasi bawumelaki kuna mikolo ebele, bazalaki koteya na mpiko, pamba te bazalaki na elikya kati na Nkolo ; mpe Nkolo azalaki kokokisa bosolo ya mateya ya ngolu na Ye na kopesaka bango nguya ya kosala bilembo ya kokamwa mpe misala minene.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 14:3
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bayekoli bakendeki koteya na bisika nyonso. Nkolo azalaki kosala elongo na bango mpe azalaki kokokisa liloba na Ye na nzela ya bilembo ya kokamwa oyo ezalaki kolanda liloba na Ye.


Yesu alobaki na ye : — Boni, bokondima kaka soki bomoni bilembo mpe bikamwa ?


Bongo, Polo mpe Barnabasi balobaki na bango na mpiko : — Tosengeli liboso koteya bino Liloba na Nzambe. Kasi lokola boboyi yango mpe bozali bino moko komimona ete bokoki te mpo na kozwa bomoi ya seko, tokeyi na biso sik’oyo epai ya bato oyo bazali Bayuda te.


Bato ya Isalaele, boyoka maloba oyo : Yesu ya Nazareti, moto oyo, na nzela ya bikamwa, ya bilembo mpe ya misala ya minene, Nzambe alakisaki bino ete awutaki epai na Ye ndenge bino moko boyebi yango,


Nzokande, nazali komona bomoi na ngai lokola eloko pamba ; eloko oyo eleki motuya mpo na ngai ezali : kosukisa malamu momekano na ngai ya kopota mbangu mpe kokokisa lotomo oyo Nkolo Yesu apesaki ngai : kosakola Sango Malamu ya ngolu ya Nzambe.


Sik’oyo, nazali kokaba bino na maboko ya Nzambe mpe na Liloba na Ye ya ngolu. Nzambe azali na makoki ya kolendisa bino mpe ya kopesa bino libula kati na bato nyonso oyo babulisama.


Boye, tango basilisaki kobondela, esika oyo basanganaki eninganaki ; bango nyonso batondisamaki na Molimo Mosantu mpe bakomaki koteya Liloba na Nzambe na molende nyonso.


Biso, tozali batatoli ya makambo oyo ; ndenge moko mpe Molimo Mosantu oyo Nzambe apesaki na bato oyo batosaka Ye azali motatoli ya makambo yango.


Nazali na soni te mpo na Sango Malamu, pamba te ezali nguya ya Nzambe mpo na lobiko ya moto nyonso oyo andimaka : liboso, ya Moyuda, mpe sima, ya Mogreki.


Boyebi lisusu ete, sima na biso konyokwama mpe kofingama kati na Filipi, toteyaki bino, na lisungi ya Nzambe na biso mpe na molende nyonso, Sango Malamu na Ye kati na bitumba makasi.


Nzambe mpe azalaki kokokisa bosolo ya litatoli na bango na nzela ya bilembo ya kokamwa, na nzela ya misala minene, ya bikamwa ya ndenge na ndenge mpe ya makabo ya Molimo Mosantu, oyo azalaki kopesa bango kolanda mokano na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ