Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 14:21 - Mokanda na Bomoi

21 Sima na Polo mpe Barnabasi koteya Sango Malamu kati na engumba wana mpe kokomisa bato ebele bayekoli, bazongaki lisusu na Listre, na Ikoniomi mpe na Antioshe ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 14:21
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bokende, bokomisa bato ya bikolo nyonso bayekoli na Ngai, bobatisa bango na Kombo ya Tata, ya Mwana mpe ya Molimo Mosantu ;


Mpe longwa na Perje, bakobaki mobembo na bango kino na Antioshe, kati na mokili ya Pisidi. Na mokolo ya Saba, bakotaki na ndako ya mayangani mpe bavandaki.


Na bongo, Polo mpe Barnabasi bapupolaki putulu ya makolo na bango mpo na bato wana, mpe bakendeki na Ikoniomi.


Na engumba Ikoniomi, Polo mpe Barnabasi bakendeki, lokola momesano, na ndako ya mayangani ya Bayuda ; bateyaki kuna, mpe bato ebele, Bayuda mpe bato ya bikolo ya bapaya, bakomaki bandimi.


— Oh baninga, mpo na nini bozali kosala boye ? Biso mpe tozali kaka bato lokola bino. Soki tozali koteya bino Sango Malamu, ezali mpo ete botika banzambe ya bikeko oyo ezanga tina mpe bomipesa na Nzambe na bomoi oyo asala Likolo, mabele, ebale monene mpe nyonso oyo ezali kati na yango.


Bongo, Bayuda oyo bawutaki na Antioshe mpe na Ikoniomi batiaki songisongi kati na bato mpo ete batombokela bango. Babambaki Polo mabanga, mpe babendaki ye kino na libanda ya engumba, pamba te bakanisaki ete akufi.


Wuta na Atalia, bakotaki na masuwa mpe bazongaki na Antioshe epai wapi batikaki bango na se ya ngolu ya Nzambe, mpo na mosala oyo bawutaki kokokisa.


kasi tango bantoma basosolaki yango, bakimaki na bingumba ya Likawoni : Listre, Derbe mpe bazingazinga na yango.


Kuna mpe lisusu, bakobaki kaka koteya Sango Malamu.


Kati na engumba Listre, ezalaki na moto moko akufa makolo. Wuta mbotama na ye, atikala kotambola te.


Sima na mwa mikolo, Polo alobaki na Barnabasi : — Tozonga na bingumba nyonso epai wapi toteyaki Liloba na Nkolo, mpo ete totala bandeko mpo na koyeba soki bazali ndenge nini.


Litatoli na ye ezalaki malamu kati na bandeko ya Listre mpe ya Ikoniomi.


Bazalaki kokumisa Nzambe, mpe bato nyonso bazalaki kolinga bango. Bongo, mikolo nyonso, Nkolo azalaki kobakisa na lisanga na bango bato oyo bazalaki kobika.


minyoko mpe pasi na ngai ; oyebi makambo nyonso oyo ekomelaki ngai na Antioshe, na Ikoniomi mpe na Listre. Solo, nanyokwamaki makasi, kasi Nkolo akangolaki ngai wuta na nyonso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ