Misala ya Bantoma 14:17 - Mokanda na Bomoi17 Nzokande, atikalaki kolemba te kotalisa bolamu na Ye, na nzela ya konokisela bango mvula kowuta na likolo, kopesa bango bambuma ebele na tango na yango, mpe kopesa bango bilei ebele mpe kotondisa mitema na bango na esengo. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Babotolaki bingumba batonga makasi mpe mabele oyo ebotaka malamu. Babotolaki bandako etonda na biloko ya ndenge na ndenge, mabulu ya mayi batimola wuta kala, bilanga ya vino, ya nzete ya olive mpe ya nzete mosusu ebele oyo ebotaka mbuma ya kolia. Na bolingo monene na Yo, baliaki mpe batondaki, bakomaki minene mpe basepelaki na mapamboli na Yo nyonso.
Kasi bolingaka banguna na bino, bosalelaka bango bolamu, bodefisaka na kozanga kolikya ete bakofuta bino niongo. Na bongo, bokozwa litomba monene mpe bokozala bana ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo ; pamba te azali malamu mpo na bato oyo bandimaka te bolamu oyo basaleli bango, mpe azali malamu mpo na bato mabe.