10 mpe alobaki na ye na mongongo makasi : — Telema ngwi na makolo na yo ! Mbala moko, moto yango apumbwaki mpe akomaki kotambola.
Moto ya tengu-tengu akopumbwa lokola mboloko, mpe lolemo ya baba ekoyemba na esengo. Mayi ekobima na esobe, mpe bibale, na bisika ya kokawuka.
Apusanaki mpe asimbaki tsipoyi oyo bazalaki komema na yango mwana oyo akufaki, mpe bato oyo bazalaki komema yango batelemaki. Yesu alobaki : — Elenge mobali, nalobi na yo, lamuka !
Nazali koloba na bino penza ya solo : moto oyo andimi Ngai akosala misala oyo nazali kosala ; akosala kutu misala oyo eleki minene, pamba te nazali kokende epai ya Tata.
kasi moto oyo akomela mayi oyo Ngai nakopesa ye akoyoka lisusu posa ya mayi te : mayi oyo Ngai nakopesa ye ekokoma kati na ye lokola etima ya mayi oyo ekawukaka te mpe etiolaka kino na bomoi ya seko.