Misala ya Bantoma 13:43 - Mokanda na Bomoi43 Tango mayangani esilaki, Bayuda mingi elongo na bato ya bikolo mosusu, oyo bakotaki na lingomba ya Bayuda mpe bazalaki kogumbamela Nzambe, balandaki Polo mpe Barnabasi oyo bazalaki kosolola na bango mpe kondimisa bango ete batikala ya kokangama makasi na ngolu ya Nzambe. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bayokanaki kokutana na Polo mokolo mosusu. Bongo tango mokolo yango ekokaki, bayaki ebele na esika oyo Polo azalaki kovanda. Wuta na tongo kino na pokwa, Polo azalaki kolimbolela bango mpe koteya bango makambo oyo etali Bokonzi ya Nzambe, mpe azalaki kosala nyonso mpo ete bandima makambo oyo azalaki koloba na tina na Yesu, na nzela ya Mobeko ya Moyize mpe makomi ya basakoli.