4 Na etinda ya Molimo Mosantu, Barnabasi mpe Saulo bakendeki na Selesi ; mpe longwa kuna, bazwaki masuwa mpo na kokende na esanga ya Shipre.
Nzokande, bandimi oyo bapalanganaki mpo na kokima minyoko oyo eyaki tango babomaki Etieni, bakimaki kino na Fenisi, na Shipre mpe na Antioshe. Mpe kuna, bazalaki kosakola Sango Malamu epai ya moto mosusu te, kaka epai ya Bayuda.
Ezalaki mokolo moko, wana bazalaki kogumbamela Nkolo mpe kokila bilei, Molimo Mosantu alobaki : — Botiela ngai pembeni Barnabasi mpe Saulo mpo na mosala oyo nabengeli bango.
Boye, sima na bango kokila bilei mpe kosambela, batielaki bango maboko mpe batikaki bango kokende.
Sima na mwa mikolo, Polo alobaki na Barnabasi : — Tozonga na bingumba nyonso epai wapi toteyaki Liloba na Nkolo, mpo ete totala bandeko mpo na koyeba soki bazali ndenge nini.
Eloko moko kaka nayebi : Molimo Mosantu azali kokebisa ngai ete boloko mpe minyoko ya ndenge na ndenge ezali kozela ngai na bingumba nyonso oyo nakokota.
Sima na biso kolongwa wana, tozongelaki mobembo na biso mpe tozalaki konana pembeni-pembeni ya esanga ya Shipre, mpo na kokima mipepe oyo ezalaki kobeta biso makasi mpe kopekisa biso kokende liboso.
Boye, Jozefi, moto ya libota ya Levi, oyo abotama na esanga Shipre mpe bantoma bapesaki ye kombo mosusu, Barnabasi oyo elakisi « molendisi, »