Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 13:36 - Mokanda na Bomoi

36 Nzokande, Davidi, sima na ye kokokisa mabongisi ya Nzambe na tango na ye, akufaki mpe akundamaki pembeni ya bakoko na ye ; boye nzoto na ye epolaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 13:36
33 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Okolia lipa na yo na motoki ya elongi na yo kino okozonga na mabele epai wapi owutaki, pamba te ozali putulu mpe okozonga na putulu. »


Tango mikolo ya bomoi na yo ekosila mpe okokende kokutana na batata na yo, nakotombola moko kati na bakitani na yo, oyo akobima penza na mokongo na yo, mpo ete akitana na yo ; mpe nakolendisa bokonzi na ye.


Davidi akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye kati na engumba ya Davidi.


Na kala, ezala na mikolo oyo Saulo azalaki mokonzi, yo nde ozalaki kokamba mampinga ya Isalaele na bitumba. Nzokande, Yawe, Nzambe na yo, alobaki na yo : ‹ Yo nde okokamba bato na Ngai, Isalaele, mpe okokoma mokambi na bango. › »


Tango okosilisa mobembo na yo awa na mokili mpe okokende kokutana na batata na yo, nakotombola moko kati na bakitani na yo, oyo akobima penza na mokongo na yo, mpo ete akitana na yo ; mpe nakolendisa bokonzi na ye.


Davidi azalaki mokonzi ya Isalaele mobimba, mpe azalaki kosalela bato na ye nyonso makambo ya sembo mpe ya alima.


Akufaki na kimobange ya esengo. Atondisamaki na mibu ebele, na bozwi mpe na lokumu ; bongo Salomo, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.


Roboami akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye kati na engumba ya Davidi. Abiya, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.


Jozafati akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi. Yorami, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.


Oziasi akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bango kati na lilita ya bakonzi, pamba te bato bazalaki koloba : « Abelaki bokono ya maba. » Yotami, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.


Bongo Salomo akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye kati na engumba ya Davidi, tata na ye. Mwana na ye, Roboami, akitanaki na ye na bokonzi.


Soki nalobi na kunda : ‹ Ozali tata na ngai, › mpe na mutsopi : ‹ Ozali mama na ngai to ndeko na ngai ya mwasi, ›


Nzokande, bango mibale bakolala ndenge moko na se ya mabele, mpe bankusu ekozipa bango.


Yango nde suka ya bato oyo batiaka elikya kati na bango moko, ya bato oyo balandaka bango mpe basepelaka na maloba na bango.


Talo ya bomoi na ye eleki motuya makasi, mpe ekotikala kofutama te.


Mosali oyo azwaki batalanta mitano abandaki mbala moko kobalola yango na mombongo, mpe mombongo yango ebotaki batalanta mosusu mitano lokola mileki.


Yesu alobaki na bango : — Botindika libanga. Kasi Marte, ndeko ya mowei, alobaki na Yesu : — Nkolo, azali kolumba solo ! Wuta bakundaki ye, esali mikolo minei.


Sima na Ye kolongola Saulo, akomisaki Davidi mokonzi na bango. Tala maloba oyo Nzambe atatolaki na tina na ye : « Namoni Davidi, mwana mobali ya Yese, moto oyo asepelisaka motema na ngai ; akokokisa solo mokano na ngai nyonso. »


Bandeko na ngai, tika ete naloba na bino solo na tina na Davidi, koko na biso, ete akufa mpe bakunda ye ; mpe kunda na ye ezali awa kino lelo.


pamba te nayebisaki bino mabongisi nyonso ya Nzambe mpe nabombelaki bino ata eloko moko te.


Bongo, afukamaki mpe agangaki makasi : — Nkolo, kotangela bango lisumu oyo te ! Tango kaka Etieni alobaki bongo, akufaki.


Saulo mpe azalaki na molongo ya bato oyo bandimaki ete baboma Etieni. Kobanda na mokolo wana, minyoko ya makasi ekweyelaki Lingomba kati na Yelusalemi ; mpe bandimi nyonso bapalanganaki na Yuda mpe na Samari, longola kaka bantoma.


mpe bato oyo bakufi kati na Klisto babungi mpo na libela.


Sima na yango, amonanaki epai ya bandeko koleka nkama mitano na mbala moko ; mpe mingi kati na bango bazali nanu na bomoi kino na tango oyo, kasi bamosusu basila kokufa.


Bandeko, toboyi bozanga boyebi na tina na bato oyo bakufa, mpo ete bozala na mawa te lokola bamosusu oyo bazangi elikya.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ