Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 13:31 - Mokanda na Bomoi

31 mpe bato oyo basalaki mibembo elongo na Ye, longwa na Galile kino na Yelusalemi, bamonaki Ye mikolo ebele. Bazali sik’oyo batatoli na Ye epai ya bato na biso.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 13:31
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bayekoli zomi na moko bakendeki na Galile, na ngomba oyo Yesu ayebisaki bango ete bakende.


Bino nde bozali batatoli ya makambo yango.


bongo bino mpe bokotatola na tina na Ngai, pamba te bozali elongo na Ngai wuta na ebandeli.


— Bato ya Galile, mpo na nini botikali awa na kotala na likolo ? Yesu oyo alongwe kati na bino mpo na kokende na Likolo, akozonga ndenge kaka bomoni Ye kokende na Likolo.


kobanda na tango oyo Yoane abatisaki Ye kino na mokolo oyo balongolaki Ye kati na biso. Pamba te moko kati na mibali yango asengeli kokoma, elongo na biso, motatoli ya lisekwa na Ye.


Sima na kufa na Ye, amimonisaki epai na bango ; mpe na nzela ya bilembo mingi, alakisaki bango ete azali na bomoi. Abimelaki bango mikolo tuku minei mpe alobelaki bango makambo oyo etali Bokonzi ya Nzambe.


Kasi bokozwa nguya, wana Molimo Mosantu akokitela bino ; mpe bokozala batatoli na Ngai kati na Yelusalemi, na etuka mobimba ya Yuda, ya Samari, mpe kino na basuka ya mokili.


Biso, tozali batatoli ya makambo nyonso oyo Yesu asalaki kati na mokili ya Bayuda mpe kati na Yelusalemi. Babomaki Ye mpe babakaki Ye na ekulusu,


Amonanaki na bato nyonso te, kasi na batatoli oyo Nzambe apona wuta kala, na biso oyo toliaki mpe tomelaki elongo na Ye, sima na Ye kosekwa kati na bakufi.


Nzambe asekwisaki Yesu kati na bakufi ; boye biso nyonso tozali batatoli ya lisekwa yango.


Bobomaki nde Mobandisi ya bomoi. Kasi Nzambe asekwisaki Ye kati na bakufi, bongo biso tozali penza batatoli ya likambo yango.


Biso, tozali batatoli ya makambo oyo ; ndenge moko mpe Molimo Mosantu oyo Nzambe apesaki na bato oyo batosaka Ye azali motatoli ya makambo yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ