Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 13:30 - Mokanda na Bomoi

30 Kasi Nzambe asekwisaki Ye kati na bakufi,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 13:30
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Azali lisusu awa te, pamba te asili kosekwa, ndenge kaka alobaki. Boya kotala esika oyo nzoto na Ye ezalaki,


Tata alingaka Ngai mpo ete nazali kokaba bomoi na Ngai ; kasi nakozwa yango lisusu.


Yesu azongisaki : — Bobuka Tempelo oyo, mpe Ngai nakotonga yango lisusu na mikolo misato.


kasi Nzambe asekwisaki Ye kati na bakufi, na mokolo ya misato, mpe asalaki ete amonana lisusu.


Nzambe akokisi yango mpo na biso, bana na bango, na kosekwisa Yesu kati na bakufi, kolanda ndenge ekomama kati na Nzembo ya mibale : « Ozali Mwana na Ngai ; na mokolo ya lelo, nakomi Tata na Yo. »


Nzambe asekwisaki Ye kati na bakufi mpo ete apola ata mokolo moko te. Kolanda ndenge Nzambe alobaki : « Nakopesa bino mapamboli ya bule mpe ya solo, oyo nalakaki Davidi. »


Pamba te akata mokolo oyo akosambisa mokili mobimba na bosembo nyonso, na nzela ya moto oyo Ye asila kopona. Atalisaki bosolo na yango epai ya bato nyonso, na nzela ya kosekwisa moto yango kati na bakufi.


Kasi Nzambe abukaki minyololo ya kufa, asekwisaki Ye, pamba te ekokaki kosalema te ete kufa ekanga Ye.


Nzambe asekwisaki Yesu kati na bakufi ; boye biso nyonso tozali batatoli ya lisekwa yango.


Biso te ! Ezali Nzambe ya Abrayami, Nzambe ya Izaki, mpe Nzambe ya Jakobi, Nzambe ya bakoko na biso, nde apesi nkembo na Yesu, Mosali na Ye, oyo bino bokabaki mpo ete baboma Ye. Yango wana, bowanganaki Ye liboso ya Pilato tango azwaki mokano ya kokangola Ye.


Bobomaki nde Mobandisi ya bomoi. Kasi Nzambe asekwisaki Ye kati na bakufi, bongo biso tozali penza batatoli ya likambo yango.


Tango Nzambe asekwisaki Mosali na Ye, atindaki Ye nanu epai na bino mpo ete apambola bino na kolongola, moko na moko kati na bino, mosika na banzela na bino ya mabe.


tika ete, bino nyonso mpe bato nyonso ya Isalaele, boyeba ete ezali na Kombo na Yesu-Klisto ya Nazareti nde moto oyo atelemi liboso na bino na nzoto kolongono ; kaka Yesu oyo bino bobakaki na ekulusu, kasi Nzambe asekwisaki Ye kati na bakufi.


Tika ete Nzambe ya kimia, Ye oyo asekwisaki kati na bakufi Mobateli monene ya bameme, Yesu, Nkolo na biso, na nzela ya makila ya Boyokani ya seko,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ