Misala ya Bantoma 13:27 - Mokanda na Bomoi27 Bato ya Yelusalemi mpe bakambi na bango basosolaki te soki Yesu azali nani ; basosolaki mpe te maloba ya basakoli oyo etangamaka mikolo nyonso ya Saba. Nzokande, tango bakatelaki Ye etumbu, bakokisaki nde masakoli yango. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bayokanaki kokutana na Polo mokolo mosusu. Bongo tango mokolo yango ekokaki, bayaki ebele na esika oyo Polo azalaki kovanda. Wuta na tongo kino na pokwa, Polo azalaki kolimbolela bango mpe koteya bango makambo oyo etali Bokonzi ya Nzambe, mpe azalaki kosala nyonso mpo ete bandima makambo oyo azalaki koloba na tina na Yesu, na nzela ya Mobeko ya Moyize mpe makomi ya basakoli.