Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 13:25 - Mokanda na Bomoi

25 Wana Yoane akomaki pene ya kosilisa mosala na ye, alobaki : « Bokanisi ete ngai nazali nani ? Nazali te Moto oyo bozali kozela. Kasi azali koya sima na ngai, Ye oyo nabongi kutu te mpo na kofungola ata basinga ya basandale na Ye ! »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 13:25
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ngai nazali kobatisa bino na mayi mpo na kolakisa ete bobongoli mitema. Kasi sima na ngai, Moto moko azali koya, aleki ngai na nguya ; ngai nabongi kutu te mpo na kofungola ata basinga ya basandale na Ye ; ezali Ye nde akobatisa bino kati na Molimo Mosantu mpe kati na moto.


Tala makambo oyo azalaki koteya bato : « Sima na ngai, Moto moko azali koya, aleki ngai na nguya ; ngai nabongi kutu te mpo na kogumbama liboso na Ye mpo na kofungola ata basinga ya basandale na Ye.


Mokolo oyo elandaki, wana Yoane amonaki Yesu koya epai na ye, alobaki : — Tala Mpate ya Nzambe, oyo alongolaka lisumu ya mokili.


Mpe lokola ezali yango nde likambo oyo ngai namonaki, yango wana nazali kotatola : Moto oyo azali Mwana na Nzambe.


amonaki Yesu koleka mpe alobaki : « Botala Mpate ya Nzambe ! »


Yesu alobaki na bango : — Bilei na Ngai ezali : kosala mokano ya Ye oyo atindaki Ngai mpe kosilisa mosala oyo apesaki Ngai.


Moto oyo alobaka na kombo na ye moko alukaka lokumu na ye moko ; kaka oyo azali koluka lokumu ya Nzambe oyo atindaki Ye nde azali koloba solo, mpe mabe ezali te kati na Ye.


Nzokande, Davidi, sima na ye kokokisa mabongisi ya Nzambe na tango na ye, akufaki mpe akundamaki pembeni ya bakoko na ye ; boye nzoto na ye epolaki.


Polo alobaki na bango : — Libatisi oyo Yoane azalaki kopesa ezalaki libatisi ya kobongola motema ; azalaki koloba na bato ete bandimela moto oyo akoya sima na ye, elingi koloba ete bandimela Yesu.


Nzokande, nazali komona bomoi na ngai lokola eloko pamba ; eloko oyo eleki motuya mpo na ngai ezali : kosukisa malamu momekano na ngai ya kopota mbangu mpe kokokisa lotomo oyo Nkolo Yesu apesaki ngai : kosakola Sango Malamu ya ngolu ya Nzambe.


Toteyaka sango na biso moko te, toteyaka nde ete Yesu-Klisto azali Nkolo, mpe ete biso tozali bawumbu na bino mpo na Yesu.


Nabundi etumba na ngai malamu, nakomi na suka ya lisano na ngai ya kokima mbangu, nabateli kondima.


Kasi tango bakosilisa kopesa litatoli na bango, nyama oyo ekobima wuta na libulu ya monene mpe ya molili makasi ekobundisa bango, ekolonga bango mpe ekoboma bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ