Tango mikolo ya bomoi na yo ekosila mpe okokende kokutana na batata na yo, nakotombola moko kati na bakitani na yo, oyo akobima penza na mokongo na yo, mpo ete akitana na yo ; mpe nakolendisa bokonzi na ye.
Na mokolo wana, bakitani ya Izayi bakotelema lokola bendele mpo na bikolo, bato ya bikolo ya bapaya bakoya noki epai na bango ; mpe esika na bango ya kopema ekozala na nkembo.
Boye Ezayi alobaki : — Boyoka sik’oyo, bino libota ya Davidi ! Ekoki kaka te mpo na bino kolembisa mitema ya bato ? Boni, bolingi lisusu kolembisa motema ya Nzambe na ngai ?
Siona, mboka kitoko, sepela, sepela penza makasi ! Yelusalemi, mboka kitoko, ganga penza na esengo ! Tala, mokonzi na yo azali koya epai na yo, azali sembo mpe molongi, atonda na komikitisa, avandi na likolo ya ane, na likolo ya mwana ya ane, mwana ya ane ya mwasi.
Bato oyo bazalaki kotambola liboso ya Yesu mpe ba-oyo bazalaki kolanda sima bazalaki koganga : « Ozana na Mwana na Davidi ! Tika ete apambolama, Ye oyo ayei na Kombo ya Nkolo ! Ozana na bisika oyo eleki Likolo ! »
Bongo balobaki na mwasi wana : — Tondimi kaka te mpo na makambo oyo olobaki, pamba te biso moko toyoki sik’oyo mpe toyebi ete azali penza Mobikisi ya mokili.
Tango Nzambe asekwisaki Mosali na Ye, atindaki Ye nanu epai na bino mpo ete apambola bino na kolongola, moko na moko kati na bino, mosika na banzela na bino ya mabe.
epai ya Tito, mwana na ngai ya solo kati na kondima moko oyo tozali kokabola elongo na ye : Tika ete ngolu mpe kimia epesamela yo kowuta na Nzambe Tata mpe na Yesu-Klisto, Mobikisi na biso !
Ngai Simona Petelo, mosali mpe ntoma ya Yesu-Klisto ; Epai ya bato oyo bazwaki kondima ya motuya moko na kondima na biso, na nzela ya bosembo ya Yesu-Klisto, Nzambe na biso mpe Mobikisi na biso :
Soki, sima na bango kokabwana na mbindo ya mokili, mpo ete bayebi Yesu-Klisto, Nkolo mpe Mobikisi na biso, bamizongisi lisusu na bowumbu ya mbindo yango, bomoi na bango ekokoma mabe koleka ndenge ezalaki liboso.
kasi bokola kati na ngolu mpe boyebi ya Yesu-Klisto, Nkolo mpe Mobikisi na biso. Tika ete nkembo epesamela Ye, wuta sik’oyo kino libela na libela ! Amen !
epai ya Nzambe moko kaka, Mobikisi na biso, na nzela ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, tika ete nkembo, lokumu, nguya mpe bokonzi ezala ya Ye, wuta liboso ya tango, sik’oyo mpe mpo na libela na libela ! Amen !
Ngai Yesu, natindaki anjelu na Ngai mpo na kotatola bosolo ya makambo oyo kati na Mangomba. Nazali Mosisa mpe mokitani ya Davidi ; Monzoto ya tongo, oyo engengaka.