Bongo Samuele azwaki molangi ya mafuta, asopaki yango na moto ya Saulo, ayambaki ye mpe alobaki : « Boni, Yawe apakoli yo mafuta te mpo ete ozala mokambi ya libula na Ye ?
Bato nyonso bakendeki na Giligali mpe batiaki kuna Saulo lokola mokonzi, na miso ya Yawe. Babonzaki kuna bambeka ya boyokani na miso ya Yawe, mpe Saulo elongo na mibali nyonso ya Isalaele basepelaki makasi.
Samuele alobaki na Saulo : « Yawe atindaki ngai kopakola yo mafuta mpo ete okoma mokonzi ya bato na Ye, Isalaele. Boye, yoka sik’oyo makambo oyo ewuti epai na Yawe.
Balobaki na ye : « Tala, yo okomi na yo mobange, mpe bana na yo ya mibali bazali kotambola te na banzela na yo. Sik’oyo, pona mokonzi oyo akokamba biso ndenge ezali na bikolo nyonso. »
Kati na ekolo ya Benjame, ezalaki na moto moko ya bozwi ; kombo na ye ezalaki « Kishi, » mwana mobali ya Abieli, mwana mobali ya Tserori, mwana mobali ya Bekorati, mwana mobali ya Afia, moto ya ekolo ya Benjame.