mpe ndenge bazalaki kosala bango tango nyonso wuta tango oyo naponaki bakambi ya bato na Ngai, Isalaele. Nakopesa yo bopemi liboso ya banguna na yo nyonso. › Yawe atatoli mpo na yo ete Ye moko akosala ete bokonzi ewumela kati na libota na yo.
Feti ya Pasika ya lolenge wana etikalaki nanu kosalema te wuta na tango oyo bilombe bakambaki Isalaele to na tango nyonso ya bakonzi ya Isalaele mpe ya bakonzi ya Yuda.
Na bisika nyonso oyo natamboli elongo na bana nyonso ya Isalaele, boni, nasilaki koloba ata na moko kati na bakambi na bango, oyo natiaki mpo na kobatela bato na Ngai : ‘ Mpo na nini botongeli Ngai te ndako ya mabaya ya sedele ? ’ ›
Basakoli nyonso, kobanda na Samuele kino na basakoli oyo bayaki sima na ye, bango nyonso basakolaki na tina na makambo oyo ezali kosalema na mikolo oyo.
Molimo na Yawe ayaki likolo na ye mpe akomaki elombe kati na bana ya Isalaele ; bongo akendeki kobunda bitumba. Yawe akabaki Kushani-Rishetayimi, mokonzi ya Arami, na maboko ya Otinieli ; mpe Otinieli alongaki ye.
Na mikolo oyo bilombe bazalaki koyangela, nzala makasi ezalaki kati na mokili. Mobali moko ya Beteleemi ya Yuda, elongo na mwasi na ye mpe bana na ye mibale ya mibali, bakendeki kovanda na mboka Moabi.
Boye, Yawe atindaki Yerubali oyo babengi Jedeon, Bedani, Jefite mpe Samuele. Akangolaki bino na maboko ya banguna na bino, oyo bazingelaki bino na bangambo nyonso. Mpe bovandaki na kimia.