Davidi atiaki ndambo ya Balevi mpo na kosala mosala liboso ya Sanduku ya Yawe, mpo na kokanisa, mpo na kosanzola mpe mpo na kokumisa Yawe, Nzambe ya Isalaele :
Tango bozali kokila bilei, bozalaka mawa-mawa te ndenge bato ya bilongi mibale basalaka ; pamba te bakomisaka bilongi na bango mawa-mawa mpo na kolakisa na bato ete bazali kokila bilei. Nazali koloba na bino penza ya solo : basili kozwa lifuti na bango.
Sima na yango, Nkolo aponaki bayekoli tuku sambo na mibale mpe atindaki bango, mibale-mibale liboso na Ye, na bingumba nyonso mpe na bisika nyonso oyo Ye moko asengelaki kokende.
Kornei azongisaki : — Eleki mikolo misato, na ngonga lokola oyo, ngonga ya misato sima na midi, nazalaki kosambela kati na ndako na ngai. Mbala moko, moto moko alata bilamba ya kongenga makasi atelemaki liboso na ngai
Bomibatela malamu mpe bobatela etonga nyonso oyo kati na yango Molimo Mosantu atiaki bino lokola bakengeli ; bobatela Lingomba ya Nzambe, pamba te asombaki yango na makila na Ye moko.
Kasi Nkolo alobaki na Ananiasi : — Kende, pamba te nasila kopona moto wana lokola esalelo na Ngai mpo na kosakola Kombo na Ngai epai ya bikolo ya bapaya, epai ya bakonzi na bango mpe epai ya bana ya Isalaele.
Bopimelanaka nzoto te, longola kaka soki, na boyokani mpe mpo na mwa tango moke, bolingi tango mosusu komipesa na losambo. Kasi sima na tango yango, bozongela kosangisa nzoto mpo ete Satana akozwa nzela te ya komeka bino likolo ya bozangi makoki ya komikanga.
Solo nasalaki misala makasi mpe ya pasi penza ; mbala mingi, nalalaki pongi te, nazangaki bilei ya kolia mpe mayi ya komela, nakilaki bilei, nanyokwamaki na malili, mpe nazangaki bilamba ya kolata.
Na tango wana, Yawe atiaki pembeni libota ya Levi mpo na komemaka Sanduku ya Boyokani ya Yawe, mpo na kotelemaka liboso ya Yawe, mpo na kosalaka mosala na Ye mpe mpo na kopambolaka bato na Kombo na Ye ndenge bazali kosala kino lelo.
Ezali mpe mpo na litatoli yango nde Nzambe atiaki ngai mopanzi sango mpe ntoma, mpo na kolakisa kondima mpe solo epai ya Bapagano. Nazali kokosa te, nazali nde koloba solo.
Moto moko te akoki komikomisa mokonzi ya Banganga-Nzambe, kasi ezali Nzambe nde akomisaka moto mokonzi ya Banganga-Nzambe soki mpe kaka abengi ye, ndenge ezalaki mpo na Aron.