Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 13:1 - Mokanda na Bomoi

1 Kati na Lingomba oyo ezalaki na Antioshe, ezalaki na basakoli mpe balakisi : Barnabasi, Simeoni oyo bazalaki kobenga « Moto mwindo, » Lusiusi ya Sirene, Manaeni oyo akolaki esika moko na moyangeli Erode, mpe Saulo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 13:1
34 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Wana bazalaki kobima na engumba, bakutanaki na moto moko ya Sirene, kombo na ye ezalaki Simona ; mpe bakangaki ye na makasi mpo ete amema ekulusu ya Yesu.


Tango Tibere Sezare akokisaki mibu zomi na mitano na bokonzi, Ponse Pilato azalaki moyangeli ya Yuda ; Erode azalaki moyangeli ya Galile ; Filipo, ndeko mobali ya Erode, azalaki moyangeli ya Itureya mpe ya Trakonitide ; mpe Lisaniasi azalaki moyangeli ya Abilene.


Basalaki bongo : batindaki masungi na bango epai ya bakambi ya Lingomba, na nzela ya Barnabasi mpe Saulo.


Sima na Barnabasi mpe Saulo kokokisa mosala na bango mpo na bolamu ya bandimi ya Yelusalemi, batikaki Yelusalemi mpe bamemaki, elongo na bango, Yoane oyo kombo na ye mosusu ezali « Malako. »


Bongo lokola Saulo, oyo bazalaki mpe kobenga « Polo, » azalaki atondisama na Molimo Mosantu, atalaki Elimasi na miso mpe alobaki na ye :


Lokola Yuda mpe Silasi bazalaki basakoli, bazwaki penza tango molayi mpo na koloba na bandeko mpe kolendisa bango ete bayika mpiko kati na kondima.


Polo mpe Barnabasi batikalaki na Antioshe epai wapi, elongo na bato mosusu ebele, bazalaki koteya mpe kosakola Liloba na Nkolo.


Tango Polo atielaki bango maboko, Molimo Mosantu akitelaki bango, mpe bakomaki koloba na nkota ya sika mpe kosakola.


Azalaki na bana basi minei oyo bayebaki nanu nzoto ya mibali te, mpe bazalaki na likabo ya kosakola.


Boye, Jozefi, moto ya libota ya Levi, oyo abotama na esanga Shipre mpe bantoma bapesaki ye kombo mosusu, Barnabasi oyo elakisi « molendisi, »


Nzokande, Saulo azalaki kaka kokanela mpe koluka koboma bayekoli ya Nkolo. Akendeki epai ya mokonzi ya Banganga-Nzambe,


Timote, moninga na ngai ya mosala, elongo na Lusiusi, Jazoni mpe Sosipatere, oyo bazali bandeko na ngai, batindeli bino mbote.


Mobali nyonso oyo asambelaka to asakolaka, wana moto na ye ezali ya kozipama, ayokisaka Mokonzi na ye soni.


Soki nazali na likabo ya kosakola, ya kososola mabombami nyonso mpe ya koyeba makambo nyonso ; mpe soki nazali na kondima oyo ekoki kolongola bangomba, kasi nazangi bolingo, nazali pamba.


Bolingo ekotikala kokufa te. Kasi masakoli ekokatana, nkota ekosila, boyebi ekolimwa.


Mpo na oyo etali basakoli, tika ete mibale to misato basakola, mpe bamosusu baluka kososola malamu makambo oyo bazali koloba.


Mosakoli azali na bokonzi likolo ya molimo ya basakoli, oyo ezali kokamba ye.


Boni, ezali kaka ngai mpe Barnabasi nde tosengeli kosala ?


Bayuda mosusu basanganaki na ye kati na lokuta na ye kino Barnabasi mpe akotaki na lokuta na bango.


Boye Jake, Petelo mpe Yoane oyo bazalaki makonzi ya Lingomba bandimaki ngolu oyo Nzambe apesaki ngai. Yango wana basanganaki elongo na ngai mpe Barnabasi mpo na kolakisa ete tokomi moko ; mpe toyokanaki ete biso tokende epai ya Bapagano, mpe bango bakende epai ya bato oyo bakatama ngenga.


Ezali Ye moko Klisto nde akomisaki bamoko bantoma, bamosusu basakoli, bapanzi Sango Malamu, babateli bibwele mpe balakisi,


Basantu nyonso batindeli bino mbote, mingi-mingi ba-oyo bazali ya ndako ya mokonzi Sezare.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ