9 Petelo alandaki anjelu kino na libanda ya boloko, kasi ayebaki te ete makambo oyo anjelu azali kosala ezali penza ya solo : akanisaki ete azwi emoniseli.
Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Tango Yawe azongisaki bato ya Siona longwa na bowumbu, tozalaki lokola bato oyo bazali kolota ndoto.
Petelo akamwaki mingi mpe akomaki komituna ndimbola ya emoniseli oyo awuti kozwa. Kaka na tango yango, batindami ya Kornei bamonaki ndako ya Simona, oyo bazalaki koluka, mpe batelemaki na ekuke.
Mokolo moko, na ngonga pene ya misato sima na midi, azwaki emoniseli ; amonaki na polele anjelu moko ya Nzambe koya epai na ye mpe koloba na ye : — Kornei !
— Wana nazalaki kati na engumba Jafa mpe nazalaki kosambela, nakweyaki na Molimo mpe nazwaki emoniseli. Namonaki eloko moko lokola elamba monene basimba na basonge na yango minei kokita wuta na Likolo, mpe ekomaki kino na esika oyo nazalaki.
Anjelu alobaki na ye : — Lata elamba na yo, mokaba na yo mpe basandale na yo ! Petelo asalaki bongo. Anjelu alobaki na ye lisusu : — Lata nzambala na yo mpe landa ngai.
Kati na Damasi, ezalaki na moyekoli moko oyo kombo na ye ezalaki « Ananiasi. » Nkolo abengaki ye kati na emoniseli : — Ananiasi ! Azongisaki : — Nkolo, ngai oyo !