8 Anjelu alobaki na ye : — Lata elamba na yo, mokaba na yo mpe basandale na yo ! Petelo asalaki bongo. Anjelu alobaki na ye lisusu : — Lata nzambala na yo mpe landa ngai.
Ngai nazali kobatisa bino na mayi mpo na kolakisa ete bobongoli mitema. Kasi sima na ngai, Moto moko azali koya, aleki ngai na nguya ; ngai nabongi kutu te mpo na kofungola ata basinga ya basandale na Ye ; ezali Ye nde akobatisa bino kati na Molimo Mosantu mpe kati na moto.
Esengo na basali oyo nkolo, tango akoya, akokuta bazali kosenzela ! Nazali koloba na bino penza ya solo : nkolo mpe akolata elamba na ye ya mosala, akovandisa bango na mesa, mpe akoya kopesa bango bilei.
Mbala moko, anjelu ya Nkolo abimaki na pwasa, mpe pole engengaki kati na boloko. Anjelu aningisaki Petelo na mopanzi mpo na kolamusa ye ; alobaki na ye : — Telema noki ! Mpe minyololo ekweyaki longwa na maboko ya Petelo.
Petelo alandaki anjelu kino na libanda ya boloko, kasi ayebaki te ete makambo oyo anjelu azali kosala ezali penza ya solo : akanisaki ete azwi emoniseli.