Bokosala feti ya Mapa ezanga levire. Na mikolo sambo kolanda ndenge napesaki bino mitindo, bokolia mapa ezanga levire na tango oyo ekatama, na sanza ya Abibi, mpo ete ezali na sanza yango nde bobimaki na Ejipito.
Yesu alobaki na ye : — Okokaki kozala na bokonzi moko te likolo na Ngai soki epesamelaki yo te wuta na likolo. Yango wana, moto oyo akabi Ngai na maboko na yo asali lisumu monene koleka.
Nazali koloba na yo penza ya solo : tango ozalaki elenge, ozalaki kokanga yo moko mokaba na yo mpe ozalaki kokende na esika nyonso oyo olingi. Kasi tango okokoma mobange, okotanda maboko na yo, mpe ekozala moto mosusu nde akokanga yo mokaba mpe akomema yo na esika oyo yo okolinga kutu kokende te.
Sima na ye kokanga Petelo, atiaki ye kati na boloko mpe aponaki masanga minei ya basoda mpo ete bakengela ye ; lisanga moko na moko ezalaki na basoda minei. Erode azalaki na makanisi ya kosambisa ye na miso ya bato sima na feti ya Pasika.
Petelo atelemaki elongo na bantoma zomi na moko ; mpe na mongongo makasi, alobaki na ebele ya bato : — Bino Bayuda, mpe bino nyonso oyo bovandaka na Yelusalemi, botika ete nalimbola mpo na bino likambo oyo, boyoka malamu makambo oyo nalingi koloba.
Kasi biso tozwaki masuwa kati na engumba Filipi, sima na feti ya Mapa ezanga levire. Sima na biso kotambola mikolo mitano na mayi, tokutaki bango na Troasi epai wapi tosalaki mikolo sambo.
Kasi ezali mpo ete Nzambe amekaki biso mpe amonaki ete tobongi mpo na kopesamela mokumba ya koteya Sango Malamu. Yango wana mpe toteyaka te mpo na kosepelisa bato, kasi mpo na kosepelisa Nzambe oyo ayebi mozindo ya mitema na biso.