Ndenge mvula mpe mvula ya pembe enokaka wuta na likolo mpe ezongaka te na likolo soki epolisi mabele te, soki ebotisi yango bambuma mpe bafololo te, soki epesi nkona te na moloni mpe bilei te na moto oyo aliaka,
Sima na yango, Daniele akendeki epai ya Arioki oyo mokonzi apesaki mokumba ya koboma bato ya bwanya ya Babiloni ; alobaki na ye : — Koboma bato ya bwanya ya Babiloni te ! Mema ngai epai ya mokonzi, mpe nakopesa ye ndimbola ya ndoto na ye.
Na tango ya bakonzi wana, Nzambe ya Lola akobimisa bokonzi moko oyo ekotikala kobebisama te mpe ekotikala kozala te na se ya bokonzi ya ekolo mosusu ; ekopanza mpe ekosukisa babokonzi wana nyonso, kasi yango moko ekowumela seko na seko.
Mpe Ngai, nazali koloba na yo : Ozali Libanga, mpe ezali na likolo ya libanga oyo nde Ngai nakotonga Lingomba na Ngai ; bongo bikuke ya mboka ya bakufi ekotikala kolonga yango te.
oyo ekomaki kino epai na bino. Sango Malamu yango epanzani mokili mobimba, ezali kobota bambuma ebele mpe ezali kokende liboso, ndenge kaka esalaki kati na bino wuta mokolo oyo boyokaki yango mpe bozwaki penza bososoli ya kokoka na tina na ngolu ya Nzambe.
Bandeko, bobondelaka mpo na biso na tina na makambo mosusu, mpo ete Liloba na Nkolo epanzana noki mpe epesamela lokumu ndenge ezalaki kozwa lokumu epai na bino.