22 Bato bagangaki : — Tala yango oyo, mongongo ya nzambe ; ezali mongongo ya moto te !
Yawe, sunga biso ! Pamba te bayengebene bazali lisusu te ; bato ya kotiela motema bazali lisusu te kati na bana na bato.
Faraon abengisaki Moyize mpe Aron, alobaki na bango : — Bobondela Yawe ete alongola magorodo pene na ngai mpe pene ya bato na ngai ; bongo nakotika bato na bino kokende kobonzela Yawe mbeka.
Tango bakolonga mampinga ya mokonzi ya nor, mokonzi ya mokili ya sude akotondisama na lolendo mpe akoboma bato ebele, kasi elonga na ye ekowumela te.
Bakalaka ya lokumu mpe bayangeli oyo mokonzi atiaki na bituka bakendeki lisanga epai ya mokonzi mpe balobaki : — Tika ete mokonzi Dariusi awumela na bomoi seko na seko !
Tango mokolo oyo akataki ekokaki, Erode alataki bilamba na ye ya bokonzi, avandaki na kiti na ye ya bokonzi mpe alobaki na bato.
Mbala moko, anjelu ya Nkolo abetaki Erode mpo ete apesaki Nzambe lokumu te ; boye bankusu eliaki ye, mpe akufaki.
Bato yango bayimaka-yimaka mpe bamilelaka-lelaka tango nyonso, batambolaka kolanda baposa mabe ya banzoto na bango, bamikumisaka mpe bakumisaka bato mosusu na lokuta mpo na kobenda litomba kowuta na bango.
Bato bagumbamelaki dalagona mpo ete epesaki bokonzi na yango epai ya nyama wana. Bagumbamelaki mpe nyama yango na maloba oyo : « Nani akokani na nyama oyo ? Nani akoki kobundisa yango ? »