18 Na tongo, mobulu monene ebimaki kati na basoda, pamba te bazalaki kotunana : — Likambo nini ekomelaki Petelo ?
Petelo apepelaki bango loboko mpo ete bavanda kimia, mpe ayebisaki bango ndenge nini Nkolo abimisaki ye na boloko. Alobaki lisusu : — Boyebisa makambo oyo epai ya Jake mpe bandeko mosusu. Sima na yango, abimaki mpe akendeki na esika mosusu.
Erode atindaki bato koluka Petelo, kasi bamonaki ye te. Bongo, sima na ye kosambisa bakengeli, apesaki mitindo ete baboma bango. Sima na yango, Erode atikaki Yuda mpe akendeki kovanda mwa mikolo na Sezarea.
Mokengeli boloko alamukaki ; mpe tango amonaki ete bikuke ya boloko ezali ya kofungwama, abendaki mopanga na ye mpo ete amiboma, pamba te akanisaki ete bakangami bakimi.
Ezalaki na tango wana nde mobulu makasi esalemaki na Efeso na tina na Nzela ya Nkolo.